Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 56:6, 7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mpo na bapaya oyo bayei epai ya Yehova mpo na kosalela ye,

      Kolinga nkombo ya Yehova+

      Mpe kozala basaleli na ye,

      Baoyo nyonso bazali kotosa sabata mpe bakómisi yango eloko mpamba te

      Mpe baoyo bakangami makasi na kondimana na ngai,

       7 Nakomema mpe bango na ngomba na ngai mosantu+

      Mpe nakosepelisa bango na ndako na ngai ya mabondeli.

      Makabo na bango ya kotumba mobimba ná bambeka na bango ekondimama likoló ya etumbelo na ngai.

      Mpo ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikólo nyonso.”+

  • Yisaya 66:20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bakouta na bandeko na bino nyonso na bikólo nyonso+ mpe bakomema bango epai ya Yehova, lokola likabo likoló ya bampunda, na makalo, na bapusu oyo ezipami, likoló ya badɔngi,* likoló ya bakamela oyo ezali na mbangu, na ngomba na ngai mosantu, Yerusaleme,” Yehova alobi bongo, “kaka ndenge bato ya Yisraele bayaka na likabo na bango na kati ya mbɛki ya pɛto mpo na kokɔta na ndako ya Yehova.”

  • Ezekiele 20:40
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: Mpo na ngomba na ngai mosantu, na ngomba molai ya Yisraele,’+ epai bato nyonso ya Yisraele, bango nyonso, bakosalela ngai na mokili.+ Kuna nakosepela na bango, nakosɛnga makabo na bino mpe bambuma ya liboso ya makabo na bino, biloko na bino nyonso ya bosantu.+

  • Yoele 3:17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bino, oyo afandi na Siona, ngomba na ngai mosantu.+

      Yerusaleme ekokóma esika moko mosantu,+

      Mpe bapaya bakoleka lisusu wana te.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto