Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na yango Nzambe atindelaki bango mokonzi ya Bakaladea.+ Mokonzi yango abomaki na mopanga bilenge na bango ya mibali+ na esika mosantu;+ ayokaki mawa te mpo na elenge mobali, elenge mwasi,* mobange, to ebɔsɔnɔ.+ Nzambe apesaki eloko nyonso na lobɔkɔ na ye.+

  • Yirimia 51:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Babilone azalaki kɔpɔ ya wolo na lobɔkɔ ya Yehova;

      Alangwisaki mabele mobimba.

      Bikólo emɛlaki vinyo na ye;+

      Yango wana bikólo ekómaki na ligboma.+

  • Ezekiele 29:19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nazali kopesa mokili ya Ezipito epai ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone,+ mpe akomema bozwi na yango, akobɔtɔla biloko na yango mingi mpe akopunza yango; mpe ekokóma lifuti mpo na limpinga ya basoda na ye.’

  • Danyele 5:18, 19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ee mokonzi, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló ye moko apesaki tata na yo Nebukadenezare bokonzi ná bonene, ná lokumu mpe nkembo.+ 19 Mpo na bonene oyo Ye apesaki ye, bato ya bikólo nyonso, ya mboka nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso bazalaki kolɛnga mpe kobanga liboso na ye.+ Azalaki koboma to kotika na bomoi moto oyo ye alingi, mpe azalaki kotombola to kokitisa moto oyo ye alingi.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto