Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:12
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yehoyakine mokonzi ya Yuda, ná mama na ye, ná basaleli na ye, ná bankumu na ye, mpe bakapita ya ndako na ye+ bamikabaki epai ya mokonzi ya Babilone.+ Mokonzi ya Babilone akangaki Yehoyakine mpe amemaki ye na Babilone. Ezalaki na mbula ya mwambe ya boyangeli ya mokonzi ya Babilone.+

  • 2 Bakonzi 24:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Amemaki bato ya Yerusaleme mobimba na mboka mopaya: bankumu nyonso,+ bilombe nyonso ya etumba, moto nyonso oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe mosala ya bibende.*+ Bato yango nyonso bazalaki 10 000. Atikaki ata moto moko te na Yerusaleme, longola kaka baoyo bazalaki babola mpenza.+

  • 2 Bakonzi 25:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki na Babilone bato mosusu oyo bazalaki naino na engumba, bato oyo bakimaki epai ya mokonzi ya Babilone, mpe bato mosusu oyo batikalaki.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto