-
2 Bakonzi 10:32, 33Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
32 Na mikolo wana, Yehova abandaki kokata teritware ya Yisraele bitenibiteni. Hazaele akobaki kobundisa Yisraele na bateritware na yango nyonso,+ 33 banda na Yordani na ɛsti, mokili mobimba ya Gileade, elingi koloba Bagade, Barubene mpe Bamanase;+ mpe banda na Aroere oyo ezali pene na Lobwaku* ya Arnone tii na Gileade mpe Bashane.+
-