41 Bongo Farao abakisaki ete: “Talá, nazali kotya yo likoló ya mokili mobimba ya Ezipito.”+42 Na yango, Farao alongolaki lopɛtɛ na ye ya kotya kashɛ mpe atyaki yango na mosapi* ya Yozefe mpe alatisaki ye bilamba ya lini ya kitoko mpe alatisaki ye nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo.
15 Mordekai alongwaki liboso ya mokonzi, alati elamba ya bokonzi ya langi ya bulé ná mpɛmbɛ, ná motole* monene ya wolo, mpe kazaka ya elamba ya kitoko ya langi ya mwa motane-bulé.+ Mpe bato ya engumba Shushane bazalaki koganga na esengo.