-
Yisaya 11:11, 12Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Na mokolo yango, Yehova akosembola lisusu lobɔkɔ na ye, mpo na mbala ya mibale, mpo na kozwa bato na ye oyo bakotikala na Asiri+ mpe na Ezipito,+ na Patrose+ mpe na Kushi,+ na Elame,+ na Shinare,* na Hamate mpe na bisanga ya mbu.+ 12 Akotombola elembo mpo na bikólo mpe akoyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná,+ mpe akoyanganisa bato ya Yuda oyo bapanzaná, uta na nsuka minei ya mabele.+
-