Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 2:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpe bato mingi ya bikólo bakokende mpe bakoloba:

      “Bóya! Tómata na ngomba ya Yehova,

      Na ndako ya Nzambe ya Yakobo.+

      Akoteya biso banzela na ye,

      Mpe tokotambola na banzela na ye.”+

      Mpo mobeko* ekobima na Siona,

      Mpe liloba ya Yehova ekobima na Yerusaleme.+

  • Yisaya 25:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Na ngomba oyo,+ Yehova ya mampinga akosalela bato ya bikólo nyonso

      Fɛti moko ya bilei ya kitoko mpenza,+

      Fɛti ya vinyo ya kitoko,*

      Ya bilei ya kitoko oyo etondi na mafuta ya mikuwa,

      Ya vinyo ya kitoko oyo bakɔngɔlá.

  • Yisaya 52:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Ee Siona!+ Lamuká! Lamuká! Latá makasi na yo,+

      Ee Yerusaleme, engumba mosantu, latá bilamba na yo ya kitoko!+

      Mpo esutu mpe moto ya mbindo akokɔta epai na yo lisusu te.+

  • Yirimia 3:17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na ntango yango, bakobenga Yerusaleme kiti ya bokonzi ya Yehova;+ mpe bikólo nyonso ekoyanganisama mpo na kosanzola nkombo ya Yehova na Yerusaleme,+ mpe bakolanda lisusu te na motó makasi nyonso motema mabe na bango.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto