-
Marko 7:32-35Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
32 Kuna, bamemelaki Yesu mobali moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba,+ mpe babondelaki ye ete atya lobɔkɔ likoló na ye. 33 Abendaki ye pembeni, alongolaki ye na kati ya ebele ya bato. Na nsima atyaki misapi na ye na matoi ya mobali yango mpe, nsima ya kobwaka nsoi, asimbaki lolemo na ye.+ 34 Mpe wana atalaki likoló, apemaki makasi mpe alobaki na ye: “Efata,” elingi koloba: “Fungwamá.” 35 Bongo matoi ya mobali yango efungwamaki,+ mokakatano na ye ya koloba esilaki mpe akómaki koloba malamu.
-
-
Luka 7:22Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
22 Bongo azongiselaki bango: “Bókende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe boyoki: Bato oyo bakufá miso bakómi komona,+ batɛngumi bakómi kotambola, bato ya maladi ya maba bazali kopɛtolama, bato oyo bakufá matoi bakómi koyoka,+ bakufi bazali kolamuka,* mpe nsango malamu ezali kosakolama epai ya babola.+
-