Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 11:6, 7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Na ntango mosusu, mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana-mpate,+

      Mpe nkoi ekolala esika moko ná mwana-ntaba,

      Mwana-ngɔmbɛ, nkɔsi,* ná nyama oyo eleisami malamu, yango nyonso ekofanda esika moko;*+

      Mpe mwana moke ya mobali akokamba yango.

       7 Ngɔmbɛ ya mwasi ná urse ekolya esika moko,

      Mpe bana na yango ekolala esika moko.

      Nkɔsi ekolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ-mobali.+

  • Yisaya 65:25
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mbwa ya zamba mpe mwana-mpate bakolya esika moko,

      Nkɔsi ekolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ,+

      Mpe bilei ya nyoka, ekozala putulu.

      Bakosala mabe te mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba na ngai mosantu mobimba,”+ Yehova alobi bongo.

  • Ezekiele 34:25
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “‘“Nakosala kondimana ya kimya ná bampate yango,+ mpe nakolongola banyama mabe ya zamba na mokili yango,+ mpo efanda na kimya na esobe mpe elala na bazamba.+

  • Hosea 2:18
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na mokolo wana, nakosala kondimana mpo na bato na ngai ná banyama ya zamba oyo efandaka na mboka,+

      Ná bandɛkɛ ya likoló mpe banyama oyo emibendaka na nse.+

      Nakolongola litimbo ná mopanga mpe etumba na mokili yango,+

      Mpe nakosala ete bato na ngai báfanda* na kimya.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto