Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 21:2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Soki osombi moombo oyo azali Moebre,+ akosala lokola moombo mbula motoba, kasi na mbula ya nsambo akozwa bonsomi, kozanga kofuta eloko.+

  • Balevi 25:10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bosengeli kosantisa mbula ya 50 mpe kosakola bonsomi na mokili epai nyonso oyo bato bafandi.+ Ekokóma Yubilé mpo na bino, mpe moto na moto akozonga na mabele na ye mpe na libota na ye.+

  • Balevi 25:39-42
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 “‘Soki ndeko na yo oyo azali pene na yo akómi mobola mpe asengeli komitɛka epai na yo,+ osengeli te kotinda ye asala mosala lokola moombo.+ 40 Zwá ye lokola mosali oyo azwaka lifuti,+ lokola moto oyo autá na mboka mosusu. Akosalela yo tii na mbula ya Yubilé. 41 Na nsima akobima epai na yo, elongo na bana na ye,* mpe akozonga na libota na ye. Akozonga na mabele ya bankɔkɔ na ye.+ 42 Mpo bazali baombo na ngai oyo nabimisaki na mokili ya Ezipito.+ Bakomitɛka te ndenge moombo atɛkamaka.

  • Kolimbola Mibeko 15:12
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Soki osombi ndeko na yo Moebre ya mobali to ya mwasi, mpe asaleli yo mbula motoba, na mbula ya nsambo okotika ye akende.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto