Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki na engumba Yerusaleme na ntango oyo basoda na ye bazingaki yango.

  • 2 Bakonzi 24:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na nsima Mokonzi ya Babilone abimisaki biloko nyonso ya motuya ya tempelo* ya Yehova mpe biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi ya Yuda.+ Akataki mikemike bisaleli nyonso ya wolo oyo Salomo mokonzi ya Yisraele asalaki na tempelo ya Yehova.+ Nyonso wana esalemaki kaka ndenge Yehova asakolaki yango.

  • Yirimia 27:16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe nalobaki na banganga-nzambe mpe na bato nyonso oyo ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali kosakwela bino ete: “Talá! Etikali moke, bisaleli ya ndako ya Yehova oyo ememamaki na Babilone ezongisama!”+ Mpo bazali kosakwela bino makambo ya lokuta.+

  • Danyele 1:2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nsukansuka Yehova akabaki Yehoyakime mokonzi ya Yuda na lobɔkɔ na ye,+ ná ndambo ya bisaleli ya ndako* ya Nzambe ya solo. Mpe Mokonzi Nebukadenezare amemaki yango na mokili ya Shineare*+ na ndako* ya nzambe na ye. Atyaki bisaleli yango na esika ya kobomba biloko ya motuya ya nzambe na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto