Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 14:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Yehova alobaki lisusu na ngai boye: “Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai.+ Natindi bango te, napesi bango mitindo te mpe nalobi na bango te.+ Emonaneli ya lokuta, kosakola makambo oyo ebombaná ya lokuta, mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali kosakwela bino.+

  • Yirimia 23:21
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Natindaki basakoli te, kasi bapotaki mbangu.

      Nalobaki na bango te, kasi basakolaki.+

  • Yirimia 27:15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “‘Mpo natindi bango te,’ Yehova alobi bongo, ‘kasi bazali kosakola makambo ya lokuta na nkombo na ngai. Soki boyoki bango, nakopalanganisa bino mpe bokokufa, bino ná basakoli oyo bazali kosakwela bino.’”+

  • Ezekiele 13:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na basakoli oyo bazali bazoba, oyo bazali kolanda makanisi na bango moko,* nzokande bamoni ata eloko moko te!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto