Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 13:5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi mosakoli to moto yango oyo alɔtaka bandɔtɔ asengeli kobomama,+ mpo alobeli likambo ya kotombokela Yehova Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito mpe asikoli bino na mokili epai bozalaki baombo.* Moto yango alingi kolongola bino na nzela oyo Yehova Nzambe na bino apesi bino mitindo bótambola na yango. Mpe bosengeli kolongola oyo ezali mabe kati na bino.+

  • Kolimbola Mibeko 18:20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Soki na lofundo nyonso mosakoli moko alobi na nkombo na ngai liloba oyo napesi ye mitindo te ya koloba to alobi na nkombo ya banzambe mosusu, mosakoli yango asengeli kokufa.+

  • Yirimia 29:32
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 na yango, talá oyo Yehova alobi: ‘Nazali kopesa Shemaya moto ya Nehelame mpe libota na ye etumbu. Moto moko te ya libota na ye akobika na kati ya bato oyo; mpe akomona te bolamu oyo nakosalela bato na ngai,’ Yehova alobi bongo, ‘mpo atindi bato bátombokela Yehova.’”’”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto