Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 15:22
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Bongo Samwele alobaki: “Eloko nini esepelisaka Yehova koleka: makabo ya kotumba mpe bambeka+ to kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa eleki kopesa mbeka,+ mpe koyoka na likebi eleki mafuta+ ya bampate-mibali;

  • Masese 21:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpo na Yehova, kosala likambo oyo ezali malamu mpe sembo

      Esepelisaka ye koleka mbeka.+

  • Yisaya 1:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yehova alobi: “Ebele ya bambeka+ na bino ezali na litomba nini mpo na ngai?

      Nalɛmbi makabo na bino ya kotumba ya bampate ya mibali+ mpe mafuta ya banyama oyo eleisami malamu,+

      Mpe nasepeli te na makila+ ya bana-ngɔmbɛ ya mibali,+ ya bana-mpate ya mibali mpe ya bantaba ya mibali.+

  • Mika 6:6-8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Nakoya liboso ya Yehova na eloko nini?

      Nakogumbama liboso ya Nzambe ya likoló na eloko nini?

      Nakoya nde liboso na ye na makabo ya kotumba ya mibimba,

      Na bana-ngɔmbɛ ya mbula moko?+

       7 Yehova akosepela nde na bankóto ya bampate-mibali,

      Na bankóto zomi zomi ya mikɛli ya mafuta?+

      Nakopesa nde mwana na ngai ya liboso ya mobali mpo na botomboki na ngai,

      Mwana na ngai* mpo na lisumu na ngai?*+

       8 Ee moto, ayebisi yo oyo ezali malamu.

      Mpe eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?

      Kaka ete omonisa boyengebene,*+ olinga bosembo,*+

      Mpe otambola na bopɔlɔ+ elongo na Nzambe na yo!+

  • Matai 9:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’+ Mpo nayaki kobenga bato ya sembo te, kasi basumuki.”

  • Matai 12:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nzokande, soki bokangaki ntina ya likambo oyo: ‘Nalingi motema mawa,+ kasi mbeka te,’+ bolingaki te kokweisa bato oyo bazali na ngambo te.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto