-
Marko 10:33, 34Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
33 “Talá! Tozali komata na Yerusaleme, mpe Mwana ya moto akokabama na mabɔkɔ ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli. Bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo; 34 bango bakosɛka ye, bakobwakela ye nsoi, bakobɛta ye fimbo mpe bakoboma ye, kasi mikolo misato na nsima akosekwa.”*+
-