-
Marko 10:41-45Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
41 Ntango bantoma mosusu zomi bayokaki yango, basilikelaki Yakobo ná Yoane.+ 42 Kasi Yesu abengaki bango esika azalaki, mpe alobaki na bango: “Boyebi ete baoyo bamonanaka* ete bazali koyangela bikólo balakisaka bato bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bakonzaka bato.+ 43 Esengeli kozala bongo te na kati na bino; kasi moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino,+ 44 mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo ya bato nyonso. 45 Mpo ata Mwana ya moto ayaki, mpo bato básalela ye te, kasi mpo na kosalela+ bango mpe kopesa bomoi* na ye lisiko na esika ya bato mingi.”+
-