-
Luka 22:67-71Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
67 “Soki ozali Kristo, yebisá biso.”+ Kasi ye azongiselaki bango: “Ata soki nayebisi bino, bokondima yango te. 68 Mpe soki natuni bino motuna, bokopesa eyano te. 69 Nzokande, banda sikoyo, Mwana ya moto+ akofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe oyo etondi na nguya.”+ 70 Bongo bango nyonso batunaki ye: “Boye, yo ozali Mwana ya Nzambe?” Azongiselaki bango: “Bino moko bozali koloba ete ngai nazali Mwana ya Nzambe.” 71 Balobaki: “Ntina nini tóluka litatoli mosusu? Mpo biso moko toyoki yango na monɔkɔ na ye moko.”+
-