-
Matai 14:6-12Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 Kasi ntango bazalaki kosala fɛti ya mbotama+ ya Erode, mwana mwasi ya Erodiadi abinaki na libaku yango mpe asepelisaki Erode mingi.+ 7 Bongo Erode alapaki ndai ete akopesa ye eloko nyonso oyo akosɛnga. 8 Na yango, ndenge mama na ye atindaki ye, alobaki na Erode: “Pesá ngai awa, na saani, motó ya Yoane Mobatisi.”+ 9 Mokonzi ayokaki mawa mingi, kasi mpo na bandai oyo alapaki liboso ya bato oyo bazalaki kolya* elongo na ye, atindaki ete bápesa ye yango. 10 Na yango, atindaki bákata Yoane motó na bolɔkɔ. 11 Bamemaki motó na ye na saani mpe bapesaki yango elenge mwasi wana. Elenge mwasi yango amemelaki yango mama na ye. 12 Na nsima, bayekoli ya Yoane bayaki kolongola ebembe na ye mpe bakundaki yango. Nsima na yango bakendaki kopesa Yesu nsango.
-