18 Nakobimisela bango mosakoli moko lokola yo,+ oyo akouta na kati ya bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na ye,+ mpe akoyebisa bango mitindo nyonso oyo nakopesa ye.+
15 Mowei yango afandaki mpe abandaki koloba, mpe Yesu apesaki ye epai ya mama na ye.+16 Bongo bango nyonso babangaki, mpe babandaki kokumisa Nzambe, balobi: “Mosakoli monene abimi na kati na biso,”+ mpe, “Nzambe atyeli bato na ye likebi.”+
2 Moto yango akendaki epai ya Yesu na butu+ mpe alobaki na ye: “Rabi,+ toyebi ete ozali moteyi oyo auti na Nzambe, mpo moto moko te akoki kosala makamwisi oyo+ ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.”+
22 “Mibali ya Yisraele, bóyoka maloba oyo: Yesu Monazarete, azalaki moto oyo Nzambe atindelaki bino. Yango emonisamaki polele na nzela ya misala ya nguya, makamwisi* mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na ye na kati na bino,+ ndenge bino moko boyebi.