Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 9:3, 4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bakomeli mosusu balobanaki bango na bango: “Moto oyo azali kofinga Nzambe.” 4 Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango: “Mpo na nini bozali kokanisa makambo ya mabe na mitema na bino?+

  • Marko 2:6-8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nzokande bakomeli mosusu bazalaki wana, bafandaki mpe bazalaki kokanisa na mitema na bango boye:+ 7 “Mpo na nini moto oyo azali koloba boye? Azali kofinga Nzambe. Nani akoki kolimbisa masumu, longola kaka Nzambe ye moko?”+ 8 Kasi na mbala moko, Yesu ayebaki* makambo oyo bazalaki kokanisakanisa na kati na bango, na yango alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kokanisa makambo wana na mitema na bino?+

  • Yoane 1:47, 48
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Yesu amonaki Natanaele azali koya epai na ye mpe alobaki mpo na ye ete: “Oyo mpenza Moyisraele ya solo, azali na bokosi te kati na ye.”+ 48 Natanaele alobaki na ye: “Ndenge nini oyebi ngai?” Yesu ayanolaki ye: “Liboso Filipe abenga yo, wana ozalaki na nse ya nzete ya figi, namonaki yo.”

  • Yoane 6:64
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 64 Kasi ezali na basusu na kati na bino oyo bazali kondima te.” Mpo Yesu ayebaki banda na ebandeli baoyo bazalaki kondima te mpe moto oyo alingaki kotɛka ye.+

  • Emoniseli 2:23
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe nakoboma bana na ye na maladi mabe oyo ebomaka, bongo masangá nyonso ekoyeba ete ngai natalaka makanisi oyo ebombaná mpenza* mpe mitema, mpe nakopesa bino moto na moto na kolanda misala na bino.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto