Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo na mikolo motoba Yehova asalaki likoló ná mabele, mbu mpe nyonso oyo ezali na kati na yango, mpe abandaki kopema na mokolo ya nsambo.+ Yango wana Yehova apambolaki mokolo ya sabata mpe asantisaki yango.

  • Nehemia 9:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Kaka yo moko nde ozali Yehova.+ Yo nde osalaki likoló, ɛɛ, likoló na bonene na yango nyonso* mpe limpinga na yango nyonso, ná mabele mpe nyonso oyo ezali likoló na yango, ná mai minene* mpe nyonso oyo ezali na kati na yango. Ozali kobatela yango nyonso na bomoi, mpe limpinga ya likoló ezali kogumbama liboso na yo.

  • Nzembo 146:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mokeli ya likoló ná mabele,

      Ya mbu, mpe ya nyonso oyo ezali na kati na yango,+

      Ye oyo azalaka ntango nyonso sembo,+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto