-
Misala 14:8-10Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
8 Mobali moko oyo makolo esalaka te, azalaki kofanda na Listra. Azalaki motɛngumi banda na libumu ya mama na ye, mpe atambolá naino te. 9 Mobali yango azalaki koyoka ntango Paulo azalaki koloba, Paulo atalaki ye na likebi mpenza mpe amonaki ete azali na kondima mpo akóma malamu.+ 10 Alobaki na ye na mongongo makasi: “Tɛlɛmá na makolo na yo.” Mobali yango apumbwaki mpe abandaki kotambola.+
-