27 Lisusu, azwaki kɔpɔ mpe abondelaki mpo na kopesa matɔndi, na nsima apesaki bango yango, mpe alobaki: “Bómɛla yango, bino nyonso,+ 28 mpo oyo elakisi makila na ngai, ‘makila+ ya kondimana,’+ oyo ekosopama mpo na bato mingi,+ mpo na kolimbisama ya masumu.+