Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Baroma 8:36
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Kaka ndenge ekomamá ete: “Lokola tosalelaka yo, bazali koboma biso mokolo mobimba; totalelami lokola bampate ya koboma.”+

  • 2 Bakorinti 11:23-27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bazali basaleli* ya Kristo? Nazali koyanola lokola moto ya ligboma, ngai naleki mpenza: nasalaki mosala mingi+ koleka bango, nakɔtaki babolɔkɔ mbala mingi+ koleka bango, nabɛtamaki koleka ndelo, mpe mbala na mbala nakómaki pene ya liwa.+ 24 Mbala mitano, Bayuda babɛtaki ngai fimbo 40 longola moko,+ 25 babɛtaki ngai na mangenda mbala misato,+ babambaki ngai mabanga mbala moko,+ nazindaki na masuwa mbala misato,+ nalekisaki butu mobimba mpe moi mobimba na kati ya mbu monene; 26 na mibembo mbala na mbala, na makama ya bibale, na makama ya miyibi, na makama oyo euti na bato na ngai moko,+ na makama oyo euti na bikólo,+ na makama na kati ya engumba,+ na makama na kati ya esobe, na makama na mbu, na makama epai ya bandeko ya lokuta, 27 na mosala makasi mpe na mitoki, na babutu kozanga mpɔngi mbala na mbala,+ na nzala mpe na mposa ya mai,+ na kozanga kolya biloko mbala mingi,+ na malili mpe kozanga bilamba.*

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto