3 Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo+ asanzolama, Tata ya motema mawa mingi+ mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso,+ 4 oyo abɔndisaka biso na komekama na biso nyonso.+ Mpo na libɔndisi oyo tozwi epai ya Nzambe,+ tókoka kobɔndisa basusu+ na komekama oyo bazali kokutana na yango.