-
1 Batesaloniki 4:16, 17Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
16 mpo Nkolo ye moko akokita uta na likoló na mongongo ya komanda, na mongongo ya anzelu-mokonzi+ mpe na kelelo ya Nzambe, mpe baoyo bakufá na kati ya bomoko elongo na Kristo bakosekwa liboso.+ 17 Na nsima biso bato ya bomoi oyo totikali, tokomemama elongo na bango na mapata+ mpo na kokutana na Nkolo+ na likoló; mpe na ndenge yango tokozala ntango nyonso elongo na Nkolo.+
-