-
1 Timote 3:2-7Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Na yango, mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo afundami na likambo moko te, mobali ya mwasi kaka moko, moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ye, moto ya makanisi malamu,*+ moto ya makambo na molɔngɔ, moyambi bapaya,+ moto oyo ayebi koteya,+ 3 molangwi-masanga te,+ moto ya mobulu te,* moto ya makambo makasimakasi te,+ oyo aswanaka na bato te,+ moto oyo alingá mbongo te,+ 4 moto oyo akambaka* libota na ye moko na ndenge ya malamu mpenza, oyo azali na bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te+ 5 (mpo soki moto ayebi te kokamba* libota na ye moko, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?), 6 azala mondimi ya sika te,+ noki avimba na lolendo mpe azwa etumbu oyo bakatelá Zabolo. 7 Lisusu, asengeli mpe kozala moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu,+ mpo akwea te na nsɔni mpe na motambo ya Zabolo.
-