Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 12:32
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Na ndakisa, moto oyo alobi mabe mpo na Mwana ya moto, bakolimbisa ye;+ kasi moto oyo alobi mabe mpo na elimo santu, bakolimbisa ye te, ezala na mokili oyo* to na oyo ezali koya.+

  • Baebre 6:4-6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpo baoyo bangɛngisami,+ oyo bayoki elɛngi ya likabo ya ofele ya likoló, oyo bazwi elimo santu 5 mpe oyo bayoki elɛngi ya liloba kitoko ya Nzambe mpe ya banguya ya mokili oyo ekoya,* 6 kasi batiki yango,+ bakoki lisusu te kozongisama mpo bábongola motema, mpo bazali bango moko kobaka lisusu Mwana ya Nzambe na nzete mpe koyokisa ye nsɔni na miso ya bato.+

  • 1 Yoane 5:16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Soki moto amoni ndeko na ye azali kosala lisumu moko oyo ememaka na liwa te, abondela, mpe Nzambe akopesa ndeko yango bomoi.+ Akopesa yango na baoyo basalaka te lisumu oyo ememaka na liwa. Ezali na lisumu moko oyo ememaka na liwa.+ Ezali mpo na lisumu wana te nde nazali koyebisa ye ete asɛnga.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto