Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 22:5, 6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Atindaki bamemi-nsango epai ya Balaama, mwana ya Beore, na Petore,+ oyo ezali pembeni ya Ebale,* na mokili oyo abotamaki, báloba na ye boye: “Talá! Bato babimi na Ezipito. Talá! Bazipi mabele* tii koleka esika oyo moto akoki komona,+ mpe bazali kofanda kaka liboso na ngai. 6 Sikoyo yaká, nabondeli yo, lakelá ngai bato oyo mabe,+ mpo bazali na nguya mingi koleka ngai. Mbala mosusu nakoki kolonga bango mpe kobengana bango na mokili oyo, mpo nayebi malamu ete moto oyo yo opambolaka apambolamaka mpe moto oyo yo olakelaka mabe alakelamaka mabe.”

  • Yuda 11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mawa na bango! Mpo balandi nzela ya Kaina;+ mpo na koluka lifuti, bamikɔtisi mbangu na nzela oyo ememaki Balaama na libunga;+ mpe bakufi mpo na maloba ya botomboki,+ lokola Kora!+

  • Emoniseli 2:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Kasi nazwi yo mabe na mwa makambo oyo: ozali na bato kuna oyo bakangami makasi na mateya ya Balaama,+ oyo ateyaki Balake+ alengola bana ya Yisraele* mpo bálya biloko oyo epesami mbeka na bikeko mpe básala pite.*+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto