Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 10:2-4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nkombo ya bantoma 12 yango oyo:+ Ya liboso Simo, oyo babengi Petro,+ ná ndeko na ye Andre;+ Yakobo mwana ya Zebede ná ndeko na ye Yoane;+ 3 Filipe ná Bartelemi;+ Toma+ ná Matai+ mokɔngɔli-mpako; Yakobo mwana ya Alfe; mpe Tade; 4 Simo Mokanana;* mpe Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki ye.+

  • Luka 6:13-16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ntango ntɔngɔ etanaki, abengaki bayekoli na ye mpe aponaki 12 kati na bango, mpe apesaki bango nkombo bantoma.+ 14 Ezalaki Simo, oyo ye apesaki mpe nkombo Petro, ndeko na ye Andre, Yakobo, Yoane, Filipe,+ Bartelemi, 15 Matai, Toma,+ Yakobo mwana ya Alfe, Simo oyo abengami “moto ya molende,” 16 Yudasi mwana ya Yakobo, mpe Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki ye.

  • Misala 1:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ntango bakómaki, bamataki na shambrɛ ya likoló epai bazalaki kofanda. Ezalaki Petro elongo na Yoane ná Yakobo mpe Andre, Filipe ná Toma, Bartelemi ná Matai, Yakobo mwana ya Alfe mpe Simo moto ya molende, mpe Yudasi mwana ya Yakobo.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto