Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 2:8, 9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Sɛngá ngai, mpe nakopesa yo bikólo mpo ezala libula na yo

      Mpe mabele tii na bansuka na yango ekozala ya yo.+

       9 Okobuka bango na lingenda ya ebende ya bokonzi,+

      Mpe okopanza bango lokola mbɛki ya moyemi-mbɛki.”+

  • Matai 19:28
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Yesu alobaki na bango: “Ya solo nalobi na bino, na ntango ya kozongisa bozalisi sika, ntango Mwana ya moto akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo, bino baoyo bolandaki ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi 12, mpe bokosambisa mabota 12 ya Yisraele.+

  • Luka 22:28-30
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 “Nzokande, bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi+ na komekama na ngai;+ 29 mpe ngai nazali kosala kondimana na bino, kaka ndenge Tata na ngai asali kondimana na ngai, mpo na bokonzi moko,+ 30 mpo bólya mpe bómɛla na mesa na ngai na Bokonzi na ngai,+ mpe bófanda na bakiti ya bokonzi+ mpo na kosambisa mabota 12 ya Yisraele.+

  • Emoniseli 3:21
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Moto oyo alongi+ nakopesa ye nzela afanda elongo na ngai na kiti na ngai ya bokonzi,+ kaka ndenge ngai mpe nalongaki mpe nafandi+ elongo na Tata na ngai na kiti na ye ya bokonzi.

  • Emoniseli 20:4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Namonaki bakiti ya bokonzi, mpe baoyo bafandaki na yango, bapesaki bango nguya ya kosambisa. Ɛɛ, namonaki milimo* ya baoyo babomamaki* mpo na litatoli oyo bapesaki mpo na Yesu mpe ndenge balobaki mpo na Nzambe, baoyo basambelaki te nyama mabe ná elilingi na yango mpe bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na mabɔkɔ na bango.+ Bazongaki na bomoi mpe bayangelaki elongo na Kristo+ mbula 1 000.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto