Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakonzi

      • Salomo abali mwana ya Farao (1-3)

      • Yehova abimeli Salomo na ndɔtɔ (4-15)

        • Salomo asɛngi bwanya (7-9)

      • Salomo akati likambo ya bamama mibale (16-28)

1 Bakonzi 3:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azwaki.”

Mitindami

  • +Mib 7:3, 4; 1Ba 7:8; 9:24; 11:1; Ne 13:25-27
  • +2Sa 5:7; 1Nt 11:7
  • +1Ba 7:1
  • +1Ba 8:17-19
  • +1Ba 9:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2011, lok. 10

1 Bakonzi 3:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +2Nt 33:17
  • +Mib 12:5, 6; 1Ba 5:3; 1Nt 28:6

1 Bakonzi 3:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kotambola na.”

Mitindami

  • +1Sa 7:9; 10:8; 1Nt 21:26

1 Bakonzi 3:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ya monene.”

Mitindami

  • +1Nt 16:39, 40; 21:29
  • +2Nt 1:3-6

1 Bakonzi 3:5

Mitindami

  • +2Nt 1:7-10

1 Bakonzi 3:6

Mitindami

  • +1Ba 2:1, 4

1 Bakonzi 3:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mwana moke.”

  • *

    Lil., “Nayebi te ndenge ya kobima mpe ndenge ya kokɔta.”

Mitindami

  • +1Nt 29:1; Yir 1:6

1 Bakonzi 3:8

Mitindami

  • +Kob 19:5, 6

1 Bakonzi 3:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “bato na yo oyo ya mindɔndɔ.” Lil., “bato na yo oyo ya kilo.”

Mitindami

  • +Nz 72:1; 119:34
  • +Ebr 5:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2007, lok. 27

    15/7/1998, nk. 29-31

1 Bakonzi 3:10

Mitindami

  • +Mas 15:8

1 Bakonzi 3:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mikolo ebele.”

  • *

    To, “milimo.”

  • *

    Lil., “mpo na koyoka makambo ya kosambisa.”

Mitindami

  • +1Nt 22:12; 29:19; 2Nt 1:11, 12; Mas 16:16

1 Bakonzi 3:12

Mitindami

  • +Mos 1:16; 1Yn 5:14
  • +1Ba 4:29; Mas 2:3-5; Yk 1:5
  • +Mt 12:42

1 Bakonzi 3:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nkembo.”

  • *

    Lil., “mikolo na yo nyonso.”

Mitindami

  • +Nz 84:11; Mt 6:33; Ef 3:20
  • +1Ba 4:21; Mos 7:11
  • +1Ba 10:23

1 Bakonzi 3:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nakoyeisa mikolo na yo ebele.”

Mitindami

  • +1Ba 15:5
  • +Nz 21:4; 91:14, 16; Mas 3:13, 16

1 Bakonzi 3:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 7:11

1 Bakonzi 3:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na mabɔkɔ na ye.” Lil., “na ntolo.”

1 Bakonzi 3:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kobanga ye.”

Mitindami

  • +1Nt 29:23-25; Nz 72:5
  • +1Ba 3:9, 10

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 3:1Mib 7:3, 4; 1Ba 7:8; 9:24; 11:1; Ne 13:25-27
1 Bak. 3:12Sa 5:7; 1Nt 11:7
1 Bak. 3:11Ba 7:1
1 Bak. 3:11Ba 8:17-19
1 Bak. 3:11Ba 9:15
1 Bak. 3:22Nt 33:17
1 Bak. 3:2Mib 12:5, 6; 1Ba 5:3; 1Nt 28:6
1 Bak. 3:31Sa 7:9; 10:8; 1Nt 21:26
1 Bak. 3:41Nt 16:39, 40; 21:29
1 Bak. 3:42Nt 1:3-6
1 Bak. 3:52Nt 1:7-10
1 Bak. 3:61Ba 2:1, 4
1 Bak. 3:71Nt 29:1; Yir 1:6
1 Bak. 3:8Kob 19:5, 6
1 Bak. 3:9Nz 72:1; 119:34
1 Bak. 3:9Ebr 5:14
1 Bak. 3:10Mas 15:8
1 Bak. 3:111Nt 22:12; 29:19; 2Nt 1:11, 12; Mas 16:16
1 Bak. 3:12Mos 1:16; 1Yn 5:14
1 Bak. 3:121Ba 4:29; Mas 2:3-5; Yk 1:5
1 Bak. 3:12Mt 12:42
1 Bak. 3:13Nz 84:11; Mt 6:33; Ef 3:20
1 Bak. 3:131Ba 4:21; Mos 7:11
1 Bak. 3:131Ba 10:23
1 Bak. 3:141Ba 15:5
1 Bak. 3:14Nz 21:4; 91:14, 16; Mas 3:13, 16
1 Bak. 3:15Le 7:11
1 Bak. 3:281Nt 29:23-25; Nz 72:5
1 Bak. 3:281Ba 3:9, 10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 3:1-28

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

3 Salomo asalaki kondimana ya libala ná Farao mokonzi ya Ezipito na ndenge abalaki* mwana mwasi ya Farao+ mpe amemaki ye na Sité ya Davidi.+ Afandaki kuna tii ntango Salomo asilisaki kotonga ndako na ye moko,+ mpe ndako ya Yehova,+ ná efelo oyo ezingi Yerusaleme mobimba.+ 2 Kasi bato bazalaki kaka kopesa bambeka na bisika oyo etombwaná,*+ mpo tii na ntango wana, batongaki naino tempelo* te mpo na kokumisa nkombo ya Yehova.+ 3 Salomo akobaki kolinga Yehova na ndenge azalaki kotosa* mibeko ya tata na ye Davidi, kaka nde azalaki kotumba bambeka mpe kobimisa milinga ya makabo na bisika oyo etombwaná.+

4 Mokolo moko, mokonzi akendaki na Gibeone mpo na kopesa mbeka, mpo esika oyo etombwaná+ oyo eyebanaki mingi* ezalaki kuna. Salomo apesaki bambeka ya kotumba 1 000 likoló ya etumbelo yango.+ 5 Kuna na Gibeone, Yehova abimelaki Salomo na ndɔtɔ na butu, mpe Nzambe alobaki na ye: “Sɛngá eloko oyo olingi napesa yo.”+ 6 Na yango Salomo alobaki: “Omoniseli mosaleli na yo tata na ngai Davidi bolingo ya sembo monene mpo atambolaki liboso na yo na bosembo, na boyengebene mpe na kolongobana ya motema. Tii sikoyo, ozali kaka komonisela ye bolingo ya sembo yango monene na ndenge opesi ye mwana moko mpo afanda na kiti na ye ya bokonzi.+ 7 Mpe sikoyo, Ee Yehova Nzambe na ngai, okómisi mosaleli na yo mokonzi na esika ya tata na ngai Davidi, atako nazali naino elenge* mpe nayebi makambo mingi te.*+ 8 Mosaleli na yo azali koyangela bato na yo oyo oponá;+ bazali bato ebele mpenza oyo motángo na bango ekoki koyebana te to kotángama te. 9 Yango wana nabondeli yo, pesá ngai motema ya botosi mpo nasambisa bato na yo,+ mpe nasosola nini ezali malamu mpe nini ezali mabe.+ Mpo, nani akokoka kosambisa ebele ya bato na yo oyo?”*

10 Likambo oyo Salomo asɛngaki esepelisaki Yehova.+ 11 Na yango, Nzambe alobaki na ye: “Lokola osɛngi bomoi molai te,* to bozwi to mpe liwa* ya banguna na yo te, kasi osɛngi mayele mpo na kokata makambo na bosembo,*+ 12 nakosala ndenge osɛngi.+ Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele+ na ndenge oyo moto moko te azalaki na yango liboso na yo, mpe moto moko te akozala na yango nsima na yo.+ 13 Lisusu, makambo oyo osɛngi te, ngai nakopesa yo yango,+ ezala bozwi mpe lokumu.*+ Bongo mokonzi ata moko te akokokana na yo bomoi na yo mobimba.*+ 14 Mpe soki otamboli na banzela na ngai, otosi malako na ngai mpe mibeko na ngai ndenge tata na yo Davidi asalaki,+ nakopesa yo bomoi molai.”*+

15 Ntango Salomo alamukaki, amonaki ete ezalaki ndɔtɔ. Bongo akendaki na Yerusaleme mpe atɛlɛmaki liboso ya sanduku ya kondimana ya Yehova. Apesaki bambeka ya kotumba, makabo ya kimya*+ mpe asalaki fɛti mpo na basaleli na ye nyonso.

16 Mokolo moko, basi mibale ya ndumba bayaki epai ya mokonzi mpe batɛlɛmaki liboso na ye. 17 Oyo ya liboso alobaki boye: “Ee nkolo na ngai, nabondeli yo, ngai ná mwasi oyo tofandaka ndako moko. Ntango nabotaki na ndako, ye azalaki wana. 18 Mikolo misato na nsima, mwasi oyo mpe abotaki mwana mobali. Tozalaki esika moko, kaka biso mibale mpe moto moko te azalaki na ndako elongo na biso. 19 Na butu, mwana ya mwasi oyo akufaki, mpo alalelaki ye. 20 Bongo na katikati ya butu, alamukaki. Ntango nalalaki, alongolaki mwana na ngai pene na ngai mpe alalisaki ye pene na ye,* mpe alalisaki pene na ngai mwana na ye oyo akufaki. 21 Ntango nalamukaki na ntɔngɔ mpo na komɛlisa mwana na ngai, namonaki ete akufi. Bongo natalaki ye malamumalamu, mpe namonaki ete ezalaki te mwana oyo ngai nabotaki.” 22 Kasi mwasi wana mosusu alobaki: “Te, mwana na ngai nde oyo azali na bomoi, oyo akufi nde mwana na yo.” Nzokande, mwasi ya liboso azalaki koloba: “Te, oyo akufi azali mwana na yo, oyo ya bomoi nde mwana na ngai.” Na ndenge wana nde bazalaki koswana liboso ya mokonzi.

23 Nsukansuka, mokonzi alobaki boye: “Oyo alobi: ‘Mwana oyo azali na bomoi nde mwana na ngai, kasi oyo akufi nde mwana na yo!’ Oyo mosusu alobi: ‘Te, oyo akufi nde mwana na yo, kasi oyo ya bomoi nde mwana na ngai!’” 24 Bongo mokonzi alobaki: “Bóyela ngai mopanga.” Bongo bayelaki ye mopanga. 25 Na nsima mokonzi alobaki: “Bókata mwana oyo azali na bomoi biteni mibale, mpe bópesa mwasi oyo eteni moko mpe mwasi oyo mosusu eteni mosusu.” 26 Na mbala moko, motema ya bomama ya mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi etindaki ye aloba na mokonzi ete: “Nabondeli yo, nkolo na ngai! Bópesa ye mwana oyo azali na bomoi. Bóboma ye te!” Kasi mwasi wana mosusu azalaki koloba ete: “Akozala mwana na ngai te, ya yo mpe te! Bákata ye biteni mibale!” 27 Na yango, mokonzi alobaki: “Bópesa mwasi oyo ya liboso mwana oyo azali na bomoi! Bóboma ye te, mpo ye nde mama na ye.”

28 Bayisraele nyonso bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo yango mpe bakómaki kopesa ye limemya mingi,*+ mpo bamonaki ete Nzambe apesaki ye bwanya mpo na kokata makambo na bosembo.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto