Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Etumbelo, Ebombelo monene ya mai, mpe basaani (1-6)

      • Bitɛlɛmiselo ya miinda, bamesa, mpe mapango (7-11a)

      • Basilisi kosala bisaleli ya tempelo (11b-22)

2 Ntango 4:1

Mitindami

  • +Kob 38:1, 2; 1Ba 8:22

2 Ntango 4:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Mbu.”

Mitindami

  • +Kob 30:20; 38:8
  • +1Ba 7:23-26

2 Ntango 4:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Mbu.”

Mitindami

  • +1Ba 6:18

2 Ntango 4:4

Mitindami

  • +Yir 52:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 19

2 Ntango 4:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Pene na 7,4 cm. Talá Ap. B14.

  • *

    Bati moko = 22 L. Talá Ap. B14.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2008, lok. 15

    1/12/2005, lok. 19

2 Ntango 4:6

Mitindami

  • +1Ba 7:38, 39
  • +Le 1:9; 9:14
  • +Kob 29:4

2 Ntango 4:7

Mitindami

  • +Kob 37:17
  • +1Nt 28:12, 15
  • +Kob 40:24

2 Ntango 4:8

Mitindami

  • +2Nt 4:19

2 Ntango 4:9

Mitindami

  • +Kob 27:9; Le 6:16
  • +1Ba 6:36
  • +1Ba 7:12

2 Ntango 4:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Mbu.”

Mitindami

  • +1Ba 7:39

2 Ntango 4:11

Mitindami

  • +Kob 27:3
  • +1Ba 7:40-46

2 Ntango 4:12

Mitindami

  • +2Nt 3:17
  • +1Ba 7:17

2 Ntango 4:13

Mitindami

  • +1Ba 7:20
  • +Yir 52:22

2 Ntango 4:14

Mitindami

  • +1Ba 7:27, 38

2 Ntango 4:15

Mitindami

  • +1Ba 7:23, 25

2 Ntango 4:16

Mitindami

  • +Kob 38:3
  • +2Nt 2:13, 14

2 Ntango 4:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mabele ya lima.”

Mitindami

  • +Yos 13:27, 28

2 Ntango 4:18

Mitindami

  • +1Ba 7:47; 1Nt 22:3, 14; Yir 52:20

2 Ntango 4:19

Mitindami

  • +2Ba 24:13
  • +Kob 37:25, 26; Em 8:3
  • +Kob 25:23, 24; 2Nt 4:8
  • +1Ba 7:48-50

2 Ntango 4:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “shambrɛ ya kati mpenza.”

Mitindami

  • +Kob 25:31, 37

2 Ntango 4:22

Mitindami

  • +1Ba 6:31, 32
  • +1Ba 6:33-35

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 4:1Kob 38:1, 2; 1Ba 8:22
2 Nt. 4:2Kob 30:20; 38:8
2 Nt. 4:21Ba 7:23-26
2 Nt. 4:31Ba 6:18
2 Nt. 4:4Yir 52:20
2 Nt. 4:61Ba 7:38, 39
2 Nt. 4:6Le 1:9; 9:14
2 Nt. 4:6Kob 29:4
2 Nt. 4:7Kob 37:17
2 Nt. 4:71Nt 28:12, 15
2 Nt. 4:7Kob 40:24
2 Nt. 4:82Nt 4:19
2 Nt. 4:9Kob 27:9; Le 6:16
2 Nt. 4:91Ba 6:36
2 Nt. 4:91Ba 7:12
2 Nt. 4:101Ba 7:39
2 Nt. 4:11Kob 27:3
2 Nt. 4:111Ba 7:40-46
2 Nt. 4:122Nt 3:17
2 Nt. 4:121Ba 7:17
2 Nt. 4:131Ba 7:20
2 Nt. 4:13Yir 52:22
2 Nt. 4:141Ba 7:27, 38
2 Nt. 4:151Ba 7:23, 25
2 Nt. 4:16Kob 38:3
2 Nt. 4:162Nt 2:13, 14
2 Nt. 4:17Yos 13:27, 28
2 Nt. 4:181Ba 7:47; 1Nt 22:3, 14; Yir 52:20
2 Nt. 4:192Ba 24:13
2 Nt. 4:19Kob 37:25, 26; Em 8:3
2 Nt. 4:19Kob 25:23, 24; 2Nt 4:8
2 Nt. 4:191Ba 7:48-50
2 Nt. 4:20Kob 25:31, 37
2 Nt. 4:221Ba 6:31, 32
2 Nt. 4:221Ba 6:33-35
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 4:1-22

Mokanda ya mibale ya Ntango

4 Na nsima, asalaki etumbelo ya kwivre.+ Bolai na yango ezalaki mapeko 20, bonene na yango mapeko 20 mpe banda na nse tii likoló ezalaki mapeko 10.

2 Asalaki Ebombelo monene ya mai*+ na ebende oyo enyangwisami. Ezalaki lokola nzungu, mpe monɔkɔ na yango banda ngámbo tii ngámbo ezalaki mapeko 10, banda na nse tii likoló ezalaki mapeko 5, mpe esɛngaki nsinga ya mapeko 30 mpo na kozinga yango.+ 3 Zingazinga na nse ya monɔkɔ ya Ebombelo monene ya mai* ezalaki na milɔngɔ mibale ya mayemi ya milona ya mbika,+ mayemi zomi mpo na lipeko moko. Banyangwisaki ebende ya kwivre mpe basalaki ebombelo ná mayemi yango nzela moko. 4 Ebombelo yango efandaki likoló ya bangɔmbɛ-mibali 12 ya kwivre.+ Ngɔmbɛ 3 etali na nɔrdi, 3 etali na wɛsti, 3 etali na sudi, mpe 3 etali na ɛsti; Ebombelo monene ya mai efandaki likoló na yango, mpe bansima ya bangɔmbɛ yango etalaki na katikati. 5 Mpe bonene ya ebende na yango ezalaki tandu moko;* monɔkɔ na yango esalemaki lokola monɔkɔ ya kɔpɔ, lokola fololo lísi. Ebombelo yango ekokaki kokɔta bati* 3 000.

6 Lisusu, asalaki basaani minene zomi ya mai mpe atyaki mitano na lobɔkɔ ya mobali, mitano na lobɔkɔ ya mwasi.+ Na kati ya basaani yango, bazalaki kosukola biloko oyo basaleli mpo na makabo ya kotumba.+ Kasi ebombelo ya mai ezalaki kosalisa banganga-nzambe mpo na kosukola.+

7 Na nsima asalaki bitɛlɛmiselo ya miinda zomi ya wolo,+ kaka ndenge esɛngamaki;+ atyaki yango na tempelo, mitano na lobɔkɔ ya mobali, mitano na lobɔkɔ ya mwasi.+

8 Asalaki mpe mesa zomi mpe atyaki yango na tempelo, mitano na lobɔkɔ ya mobali, mitano na lobɔkɔ ya mwasi;+ mpe asalaki mabakuli 100 ya wolo.

9 Na nsima asalaki lopango+ ya banganga-nzambe+ mpe lopango monene+ ná baporte ya lopango yango, mpe azipaki baporte na yango na kwivre. 10 Mpe atyaki Ebombelo monene ya mai* na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali, na sudi-ɛsti.+

11 Hirame asalaki mpe basaani mpo na putulu ya mɔtɔ, bapau, mpe mabakuli.+

Na bongo Hirame asilisaki mosala oyo Mokonzi Salomo asɛngaki ye asala mpo na ndako ya Nzambe ya solo.+ Talá biloko oyo asalaki: 12 makonzí mibale+ mpe mitó oyo basalá lokola kibakuli oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango mibale; minyama mibale+ mpo na kozipa mitó yango mibale oyo basalá lokola kibakuli, oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí; 13 mpe mbuma 400 ya nzete ya grenade+ mpo na minyama mibale, milɔngɔ mibale ya mbuma ya nzete ya grenade mpo na monyama mokomoko, mpo na kozipa mitó mibale oyo basalá lokola kibakuli oyo ezalaki likoló ya makonzí yango;+ 14 bashario zomi ná basaani minene zomi likoló ya bashario yango;+ 15 Ebombelo monene ya mai ná bangɔmbɛ 12 oyo ezalaki na nse na yango;+ 16 basaani mpo na putulu ya mɔtɔ, bapau, nkanya,+ mpe bisaleli na yango nyonso oyo Hirame-abive+ asalelaki Mokonzi Salomo na kwivre oyo babongisá kitoko, mpo na ndako ya Yehova. 17 Mokonzi azalaki konyangwisa biloko yango mpe kosopa yango na mabele,* na etúká ya Yordani, oyo ezali kati na Sukote+ ná Zereda. 18 Bongo Salomo asalaki bisaleli yango nyonso ebele mpenza; bakokaki te koyeba kilo ya kwivre oyo basalelaki.+

19 Salomo asalaki bisaleli nyonso+ mpo na ndako ya Nzambe ya solo: etumbelo ya wolo,+ bamesa+ mpo na kotya mampa ya kolakisa;+ 20 bitɛlɛmiselo ya miinda ná miinda na yango ya wolo ya pɛto,+ oyo bazalaki kopelisa liboso ya Esika Eleki Mosantu* ndenge esɛngamaki; 21 bafololo, miinda mpe bapɛnsi ya mike ya wolo, wolo ya pɛto mpenza; 22 biloko ya koboma mɔtɔ, mabakuli, bakɔpɔ mpe biloko ya kotya mɔtɔ, ya wolo ya pɛto; mpe ekɔtelo ya ndako, baporte na yango ya kati mpo na Esika Eleki Mosantu+ mpe baporte ya ndako ya tempelo, ezalaki ya wolo.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto