Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Yehu abomi bato ya libota ya Ahaba (1-17)

        • Yehonadabe akei elongo na Yehu (15-17)

      • Yehu abomi basambeli ya Baala (18-27)

      • Boyangeli ya Yehu na mokuse (28-36)

2 Bakonzi 10:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bakɛngɛli ya Ahaba.”

Mitindami

  • +1Ba 16:29
  • +1Ba 21:8

2 Bakonzi 10:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azali sembo koleka.”

  • *

    Lil., “ndako.”

2 Bakonzi 10:4

Mitindami

  • +2Ba 9:24, 27

2 Bakonzi 10:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

2 Bakonzi 10:7

Mitindami

  • +1Ba 21:21

2 Bakonzi 10:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bozali bayengebene.”

Mitindami

  • +2Ba 9:14, 24

2 Bakonzi 10:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ekokwea na mabele.”

Mitindami

  • +1Sa 15:29; Yis 14:27
  • +1Ba 21:19-24; 2Ba 9:7, 36

2 Bakonzi 10:11

Mitindami

  • +1Ba 18:19; 2Ba 23:19, 20
  • +1Ba 21:21

2 Bakonzi 10:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kokangisa bampate.” Mbala mosusu esika oyo bazalaki kokanga bampate mpo na kokata yango nsuki.

2 Bakonzi 10:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, mama-mokonzi Yezabele, mama ya Mokonzi Yehorame.

Mitindami

  • +2Ba 8:29; 9:21, 27; 2Nt 22:1

2 Bakonzi 10:14

Mitindami

  • +2Nt 22:8

2 Bakonzi 10:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “apambolaki ye.”

  • *

    To, “sembo.”

Mitindami

  • +Yir 35:6, 19
  • +1Nt 2:55

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2005, lok. 11

    1/1/1998, nk. 12-13

    “Makomami nyonso,” lok. 74

2 Bakonzi 10:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Yaká elongo na ngai mpe omona molende na ngai mpo na Yehova.”

Mitindami

  • +Mit 25:11; 1Ba 19:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/1998, nk. 12-13

2 Bakonzi 10:17

Mitindami

  • +2Ba 9:8; 2Nt 22:7
  • +1Ba 21:20, 21; 2Ba 9:26

2 Bakonzi 10:18

Mitindami

  • +1Ba 16:32, 33; 18:22

2 Bakonzi 10:19

Mitindami

  • +2Ba 3:13
  • +2Ba 10:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2011, lok. 5

2 Bakonzi 10:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Bósantisa.”

2 Bakonzi 10:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +1Ba 16:30, 32

2 Bakonzi 10:23

Mitindami

  • +2Ba 10:15; Yir 35:6, 19

2 Bakonzi 10:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na bino ekopesama na esika ya molimo na ye.”

2 Bakonzi 10:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bapoti-mbangu.”

  • *

    Lil., “engumba,” mbala mosusu ndako moko lokola esika makasi ya libateli.

Mitindami

  • +Kob 32:26, 27; Mib 13:6-9; Ezk 9:5

2 Bakonzi 10:26

Mitindami

  • +Le 26:1
  • +Mib 7:25

2 Bakonzi 10:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “twalɛti.”

Mitindami

  • +Le 26:30; Mib 7:5
  • +1Ba 16:30, 32

2 Bakonzi 10:29

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30; 13:33; Hos 8:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2011, lok. 5

2 Bakonzi 10:30

Mitindami

  • +1Ba 21:21
  • +2Ba 13:1, 10; 14:23; 15:8, 12

2 Bakonzi 10:31

Mitindami

  • +Mib 10:12; Hos 1:4
  • +1Ba 12:28-30; 13:34; 14:16

2 Bakonzi 10:32

Mitindami

  • +1Ba 19:17; 2Ba 8:12; 13:22

2 Bakonzi 10:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mit 32:33; Yos 22:9
  • +Mib 3:13-16; 28:63; Yos 13:8-12

2 Bakonzi 10:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +2Ba 13:1

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 10:11Ba 16:29
2 Bak. 10:11Ba 21:8
2 Bak. 10:42Ba 9:24, 27
2 Bak. 10:71Ba 21:21
2 Bak. 10:92Ba 9:14, 24
2 Bak. 10:101Sa 15:29; Yis 14:27
2 Bak. 10:101Ba 21:19-24; 2Ba 9:7, 36
2 Bak. 10:111Ba 18:19; 2Ba 23:19, 20
2 Bak. 10:111Ba 21:21
2 Bak. 10:132Ba 8:29; 9:21, 27; 2Nt 22:1
2 Bak. 10:142Nt 22:8
2 Bak. 10:15Yir 35:6, 19
2 Bak. 10:151Nt 2:55
2 Bak. 10:16Mit 25:11; 1Ba 19:10
2 Bak. 10:172Ba 9:8; 2Nt 22:7
2 Bak. 10:171Ba 21:20, 21; 2Ba 9:26
2 Bak. 10:181Ba 16:32, 33; 18:22
2 Bak. 10:192Ba 3:13
2 Bak. 10:192Ba 10:11
2 Bak. 10:211Ba 16:30, 32
2 Bak. 10:232Ba 10:15; Yir 35:6, 19
2 Bak. 10:25Kob 32:26, 27; Mib 13:6-9; Ezk 9:5
2 Bak. 10:26Le 26:1
2 Bak. 10:26Mib 7:25
2 Bak. 10:27Le 26:30; Mib 7:5
2 Bak. 10:271Ba 16:30, 32
2 Bak. 10:291Ba 12:28-30; 13:33; Hos 8:6
2 Bak. 10:301Ba 21:21
2 Bak. 10:302Ba 13:1, 10; 14:23; 15:8, 12
2 Bak. 10:31Mib 10:12; Hos 1:4
2 Bak. 10:311Ba 12:28-30; 13:34; 14:16
2 Bak. 10:321Ba 19:17; 2Ba 8:12; 13:22
2 Bak. 10:33Mit 32:33; Yos 22:9
2 Bak. 10:33Mib 3:13-16; 28:63; Yos 13:8-12
2 Bak. 10:352Ba 13:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 10:1-36

Mokanda ya mibale ya

10 Nzokande Ahaba+ azalaki na bana mibali 70 na Samaria. Bongo Yehu akomaki mikanda mpe atindaki yango na Samaria, epai ya bankumu ya Yizireele, bankulutu+ mpe bakɛngɛli ya bana ya Ahaba,* alobi: 2 “Bozali elongo na bana ya nkolo na bino, mpe bozali na makalo ya bitumba, bampunda, engumba oyo ebatelami makasi, mpe bibundeli. Ntango mokanda oyo ekokómela bino, 3 bópona mwana oyo aleki malamu mpe abongi mpenza* kati na bana ya nkolo na bino mpe bótya ye na kiti ya bokonzi ya tata na ye. Na nsima bóbunda mpo na kobatela libota* ya nkolo na bino.”

4 Kasi bato yango babangaki makasi mpe balobaki: “Talá! Bakonzi mibale balongaki te kotɛlɛma liboso na ye,+ bongo biso nde tokokoka?” 5 Na yango, kapita ya ndako ya mokonzi,* guvɛrnɛrɛ ya engumba, bankulutu, mpe bakɛngɛli batindelaki Yehu maloba oyo: “Tozali basaleli na yo, mpe tokosala nyonso oyo okoloba na biso. Tokotya ata moto moko te mokonzi. Salá oyo emonani malamu na miso na yo.”

6 Bongo Yehu akomelaki bango mokanda ya mibale mpe alobaki: “Soki bozali bato na ngai mpe bondimi kotosa ngai, bómema mitó ya bana ya nkolo na bino mpe bóya epai na ngai lobi na ngonga oyo, na Yizireele.”

Nzokande bana 70 ya mokonzi bazalaki elongo na bato minene ya engumba oyo bazalaki kobɔkɔla bango. 7 Ntango kaka mokanda ekómelaki bango, bazwaki bana ya mokonzi mpe babomaki bango, mibali 70.+ Na nsima batyaki mitó yango na bakitunga mpe batindaki yango epai ya Yehu na Yizireele. 8 Momemi-nsango akɔtaki mpe alobaki na Yehu: “Bayei na mitó ya bana ya mokonzi.” Bongo Yehu alobaki: “Bótya yango mabondo mibale na esika ya kokɔta na porte ya engumba mpe efanda wana tii na ntɔngɔ.” 9 Na ntɔngɔ ntango Yehu abimaki, atɛlɛmaki liboso ya bato mpe alobaki: “Bino bozali na ngambo te.* Ya solo, ngai nde nasalelaki nkolo na ngai likita mpe nabomaki ye.+ Kasi nani abomi bato oyo nyonso? 10 Na yango, bóyeba ete liloba ya Yehova ata moko te oyo Yehova alobaki mpo na libota ya Ahaba ekozanga kokokisama.*+ Yehova asali oyo alobaki na nzela ya mosaleli na ye Eliya.”+ 11 Lisusu, Yehu abomaki bato nyonso ya libota ya Ahaba oyo batikalaki na Yizireele, abomaki bato minene nyonso ya Ahaba, baninga na ye, mpe banganga-nzambe na ye.+ Atikaki ata moto moko te na bomoi.+

12 Na nsima Yehu asimbaki nzela, akei na Samaria. Na nzela, ezalaki na ndako moko epai babateli ya mpate bazalaki kokata bampate nsuki.* 13 Kuna, Yehu akutanaki na bandeko ya Ahazia+ mokonzi ya Yuda, mpe atunaki bango: “Bino banani?” Bayanolaki: “Tozali bandeko ya Ahazia, mpe tozali kokita mpo na kotuna soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bana ya mokonzi mpe bana ya mama-mokonzi.”* 14 Na mbala moko Yehu alobaki: “Bókanga bango!” Bongo bakangaki bango mpe babomaki bango na libulu ya kobomba mai ya ndako yango ya babateli ya mpate; bazalaki bato 42. Yehu atikaki ata moko na bango te na bomoi.+

15 Ntango Yehu alongwaki wana, akutanaki na Yehonadabe+ mwana ya Rekabe,+ oyo azalaki koya kokutana na ye. Ntango apesaki ye mbote,* alobaki na ye: “Motema na yo ezali mobimba* epai na ngai, ndenge motema na ngai ezali epai ya motema na yo?”

Yehonadabe ayanolaki: “Ɛɛ.”

Yehu alobaki na ye: “Soki bongo, pesá ngai lobɔkɔ na yo.”

Bongo Yehonadabe apesaki ye lobɔkɔ, mpe Yehu amatisaki ye na likalo na ye. 16 Mpe alobaki: “Yaká elongo na ngai mpe okomona ete nandimaka ata moke te básalela Yehova na kozanga bosembo.”*+ Bongo amemaki ye na likalo na ye ya etumba. 17 Bongo akómaki na Samaria, mpe kuna abomaki bato nyonso ya libota ya Ahaba oyo batikalaki na Samaria. Asilisaki bango nyonso,+ kaka ndenge Yehova alobaki yango na nzela ya Eliya.+

18 Lisusu, Yehu ayanganisaki bato nyonso mpe alobaki na bango: “Ahaba asambelaki Baala mwa moke,+ kasi Yehu akosambela ye mingi koleka. 19 Sikoyo, bóbengela ngai basakoli nyonso ya Baala,+ ná basambeli na ye nyonso, mpe banganga-nzambe+ na ye nyonso. Ata moko azanga te, mpo nasengeli kopesa Baala mbeka moko monene. Moto nyonso oyo akozanga bakoboma ye.” Nzokande Yehu asalelaki mayele wana mpo asilisa basambeli ya Baala.

20 Yehu alobaki lisusu: “Bópesa liyebisi ete ezali na* liyangani moko monene mpo na Baala.” Bongo bapesaki liyebisi yango. 21 Nsima na yango Yehu atindaki nsango na Yisraele mobimba, mpe basambeli nyonso ya Baala bayaki. Ata moko te atikalaki; bango nyonso bayaki. Bakɔtaki na tempelo* ya Baala,+ mpe tempelo ya Baala etondaki nsuka tii nsuka. 22 Yehu alobaki na mokɛngɛli ya esika ya kobomba bilamba ete: “Bimiselá basambeli nyonso ya Baala bilamba.” Bongo moto yango abimiselaki bango bilamba. 23 Na nsima Yehu ná Yehonadabe+ mwana ya Rekabe bakɔtaki na tempelo ya Baala. Bongo Yehu alobaki na basambeli ya Baala: “Bóluka malamumalamu mpe bótala ete ata mosambeli moko te ya Yehova azala awa, kaka basambeli ya Baala.” 24 Nsukansuka, bakendaki mpo na kopesa bambeka mpe makabo ya kotumba. Yehu azwaki mibali 80 kati na basoda na ye, atyaki bango libándá mpe alobaki na bango: “Soki moko ya bato oyo napesi na mabɔkɔ na bino akimi, nakoboma bino na esika na ye.”*

25 Ntango kaka Yehu asilisaki kopesa likabo ya kotumba, alobaki na bakɛngɛli* mpe bakomanda-basungi na ye ete: “Bókɔta mpe bóboma bango! Ata moko te akima!”+ Bongo bakɛngɛli mpe bakomanda-basungi babomaki bango na mopanga mpe babwakaki nzoto na bango libándá; bakendaki tii na kati mpenza ya esika mosantu* ya tempelo ya Baala. 26 Na nsima, babimisaki makonzí ya losambo+ ya tempelo ya Baala mpe batumbaki yango nyonso.+ 27 Bakweisaki likonzí ya losambo+ ya Baala mpe bakweisaki tempelo ya Baala,+ mpe bakómisá yango bakabinɛ* tii na mokolo ya lelo.

28 Na ndenge yango, Yehu alongolaki losambo ya Baala na Yisraele. 29 Nzokande Yehu alongwaki te na masumu oyo Yeroboame mwana ya Nebate asalisaki Yisraele, elingi koloba kosambela bana-ngɔmbɛ ya wolo oyo ezalaki na Betele mpe na Dani.+ 30 Bongo Yehova alobaki na Yehu: “Lokola osali malamu mpe osali likambo oyo ezali sembo na miso na ngai, na ndenge okokisi makambo nyonso oyo nakanaki kosala libota ya Ahaba,+ bana na yo bakofanda na kiti ya bokonzi ya Yisraele+ tii na libota ya minei.” 31 Kasi Yehu akebaki te ete atosa Mobeko ya Yehova Nzambe ya Yisraele na motema na ye mobimba.+ Alongwaki te na masumu oyo Yeroboame asalisaki Yisraele.+

32 Na mikolo wana, Yehova abandaki kokata teritware ya Yisraele bitenibiteni. Hazaele akobaki kobundisa Yisraele na bateritware na yango nyonso,+ 33 banda na Yordani na ɛsti, mokili mobimba ya Gileade, elingi koloba Bagade, Barubene mpe Bamanase;+ mpe banda na Aroere oyo ezali pene na Lobwaku* ya Arnone tii na Gileade mpe Bashane.+

34 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehu, ná nyonso oyo asalaki mpe nguya na ye nyonso, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yisraele. 35 Na nsima Yehu akufaki* mpe bakundaki ye na Samaria; mpe mwana na ye Yehoahaze+ akómaki mokonzi na esika na ye. 36 Yehu ayangelaki Yisraele na Samaria mbula 28.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto