Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakonzi

      • Davidi ná Abishage (1-4)

      • Adoniya aluki kozwa bokonzi (5-10)

      • Natane ná Bate-sheba bakɔti likambo yango (11-27)

      • Davidi apesi mitindo ete bátya Salomo mafuta (28-40)

      • Adoniya akei komibomba na etumbelo (41-53)

1 Bakonzi 1:1

Mitindami

  • +2Sa 5:4; 1Nt 29:26, 27

1 Bakonzi 1:3

Mitindami

  • +1Ba 2:17, 22
  • +Yos 19:17, 18

1 Bakonzi 1:5

Mitindami

  • +2Sa 3:2, 4; 1Nt 3:1, 2
  • +2Sa 15:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2005, lok. 28

1 Bakonzi 1:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ayokisaki ye mpasi na motema.”

1 Bakonzi 1:7

Mitindami

  • +2Sa 20:25
  • +1Ba 2:22

1 Bakonzi 1:8

Mitindami

  • +2Sa 8:17
  • +2Sa 20:23; 1Nt 27:5
  • +2Sa 7:2; 12:1
  • +1Ba 4:7, 18
  • +2Sa 23:8; 1Nt 11:10

1 Bakonzi 1:9

Mitindami

  • +2Sa 15:12

1 Bakonzi 1:11

Mitindami

  • +2Sa 7:4, 5
  • +2Sa 11:3, 27
  • +2Sa 12:24
  • +2Sa 3:2, 4

1 Bakonzi 1:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo moko mpe molimo ya.”

Mitindami

  • +Bas 9:4-6; 1Ba 1:21; 2Ba 11:1

1 Bakonzi 1:13

Mitindami

  • +1Nt 22:9; 28:5; 29:1

1 Bakonzi 1:15

Mitindami

  • +1Ba 1:1, 3

1 Bakonzi 1:17

Mitindami

  • +1Ba 1:13; 1Nt 22:9, 10

1 Bakonzi 1:18

Mitindami

  • +1Ba 1:5, 11

1 Bakonzi 1:19

Mitindami

  • +1Ba 1:7
  • +1Ba 1:9, 10

1 Bakonzi 1:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “okolala na liwa esika moko na bankɔkɔ na yo.”

1 Bakonzi 1:22

Mitindami

  • +1Ba 1:14

1 Bakonzi 1:24

Mitindami

  • +1Ba 1:5

1 Bakonzi 1:25

Mitindami

  • +2Sa 15:12
  • +1Ba 1:5, 7

1 Bakonzi 1:26

Mitindami

  • +1Nt 27:5

1 Bakonzi 1:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “asikolaki molimo na ngai.”

Mitindami

  • +Nz 71:23; 103:4

1 Bakonzi 1:32

Mitindami

  • +2Sa 20:23; 23:20; 1Nt 27:5
  • +1Ba 1:8

1 Bakonzi 1:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpunda ya mwasi.”

Mitindami

  • +1Ba 1:38; Lk 19:33-35
  • +2Nt 32:30

1 Bakonzi 1:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kobɛta.”

Mitindami

  • +1Sa 16:13
  • +1Sa 10:1, 24; 2Sa 15:10; 2Ba 11:12

1 Bakonzi 1:37

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “boyangeli na ye.”

Mitindami

  • +1Nt 28:20
  • +1Ba 3:12; 10:23; Nz 72:8

1 Bakonzi 1:38

Mitindami

  • +1Nt 27:5
  • +2Sa 15:18; 1Nt 18:17
  • +1Ba 1:33; Mt 21:7
  • +2Nt 32:30

1 Bakonzi 1:39

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Na ntembe te, hema oyo balobeli awa ezali esika oyo batyaki sanduku ya kondimana.

Mitindami

  • +Kob 30:23-25; 1Sa 16:13
  • +2Sa 6:17
  • +1Nt 29:22

1 Bakonzi 1:40

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mabele epasukaki.”

Mitindami

  • +1Sa 4:5

1 Bakonzi 1:41

Mitindami

  • +1Ba 1:9, 25

1 Bakonzi 1:42

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpo obongi kotyelama motema.”

Mitindami

  • +2Sa 15:36; 17:17

1 Bakonzi 1:44

Mitindami

  • +1Ba 1:33, 34

1 Bakonzi 1:50

Mitindami

  • +Kob 21:14; 38:1, 2; 1Ba 2:28

1 Bakonzi 1:52

Mitindami

  • +1Ba 2:23

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 1:12Sa 5:4; 1Nt 29:26, 27
1 Bak. 1:31Ba 2:17, 22
1 Bak. 1:3Yos 19:17, 18
1 Bak. 1:52Sa 3:2, 4; 1Nt 3:1, 2
1 Bak. 1:52Sa 15:1
1 Bak. 1:72Sa 20:25
1 Bak. 1:71Ba 2:22
1 Bak. 1:81Ba 4:7, 18
1 Bak. 1:82Sa 23:8; 1Nt 11:10
1 Bak. 1:82Sa 8:17
1 Bak. 1:82Sa 20:23; 1Nt 27:5
1 Bak. 1:82Sa 7:2; 12:1
1 Bak. 1:92Sa 15:12
1 Bak. 1:112Sa 7:4, 5
1 Bak. 1:112Sa 11:3, 27
1 Bak. 1:112Sa 12:24
1 Bak. 1:112Sa 3:2, 4
1 Bak. 1:12Bas 9:4-6; 1Ba 1:21; 2Ba 11:1
1 Bak. 1:131Nt 22:9; 28:5; 29:1
1 Bak. 1:151Ba 1:1, 3
1 Bak. 1:171Ba 1:13; 1Nt 22:9, 10
1 Bak. 1:181Ba 1:5, 11
1 Bak. 1:191Ba 1:7
1 Bak. 1:191Ba 1:9, 10
1 Bak. 1:221Ba 1:14
1 Bak. 1:241Ba 1:5
1 Bak. 1:252Sa 15:12
1 Bak. 1:251Ba 1:5, 7
1 Bak. 1:261Nt 27:5
1 Bak. 1:29Nz 71:23; 103:4
1 Bak. 1:322Sa 20:23; 23:20; 1Nt 27:5
1 Bak. 1:321Ba 1:8
1 Bak. 1:331Ba 1:38; Lk 19:33-35
1 Bak. 1:332Nt 32:30
1 Bak. 1:341Sa 16:13
1 Bak. 1:341Sa 10:1, 24; 2Sa 15:10; 2Ba 11:12
1 Bak. 1:371Nt 28:20
1 Bak. 1:371Ba 3:12; 10:23; Nz 72:8
1 Bak. 1:381Nt 27:5
1 Bak. 1:382Sa 15:18; 1Nt 18:17
1 Bak. 1:381Ba 1:33; Mt 21:7
1 Bak. 1:382Nt 32:30
1 Bak. 1:39Kob 30:23-25; 1Sa 16:13
1 Bak. 1:392Sa 6:17
1 Bak. 1:391Nt 29:22
1 Bak. 1:401Sa 4:5
1 Bak. 1:411Ba 1:9, 25
1 Bak. 1:422Sa 15:36; 17:17
1 Bak. 1:441Ba 1:33, 34
1 Bak. 1:50Kob 21:14; 38:1, 2; 1Ba 2:28
1 Bak. 1:521Ba 2:23
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
  • 46
  • 47
  • 48
  • 49
  • 50
  • 51
  • 52
  • 53
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 1:1-53

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

1 Nzokande Mokonzi Davidi akómaki mobange mpenza,+ mpe atako bazalaki kozipa ye bilamba, azalaki kaka koyoka mɔtɔ te. 2 Bongo basaleli na ye balobaki na ye: “Ee nkolo na biso mokonzi, tiká tólukela yo elenge mwasi moko oyo azali ngɔndɔ, mpo asalelaka yo mpe abatelaka yo. Akobanda kolala pene na yo mpo oyoka mɔtɔ.” 3 Balukaki elenge mwasi moko ya kitoko na Yisraele mobimba mpe bazwaki Abishage+ Moshuneme+ mpe bamemaki ye epai ya mokonzi. 4 Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi mpenza. Akómaki kobatela mokonzi mpe kosalela ye, kasi mokonzi asangisaki na ye nzoto te.

5 Na ntango wana, Adoniya+ mwana ya Hagite abandaki komikumisa mpe koloba: “Ngai nde nakokóma mokonzi!” Na yango, atindaki básalela ye likalo moko, mpe azwaki batambwisi-mpunda mpe mibali 50 mpo bápota mbangu liboso na ye.+ 6 Kasi ata mbala moko te tata na ye apamelaki ye* ete: “Mpo na nini ozali kosala boye?” Adoniya azalaki mpe kitoko mingi. Mama na ye abotaki ye nsima ya Abisalome. 7 Adoniya asololaki na Yoabe mwana ya Zeruya mpe nganga-nzambe Abiatare,+ mpe bandimaki kosalisa mpe kopesa ye mabɔkɔ.+ 8 Kasi nganga-nzambe Zadoke,+ Benaya+ mwana ya Yehoyada, mosakoli Natane,+ Shimei,+ Rei, mpe bilombe ya etumba ya Davidi+ bapesaki Adoniya mabɔkɔ te.

9 Nsukansuka, Adoniya apesaki mbeka+ ya bampate, ya bangɔmbɛ mpe ya banyama ya mafutamafuta pene na libanga ya Zohelete, oyo ezali pembeni ya Ene-rogele. Abengisaki bandeko na ye nyonso, bana ya mokonzi, ná mibali nyonso ya Yuda oyo bazalaki kosalela mokonzi. 10 Kasi abengisaki te mosakoli Natane, Benaya, bilombe ya etumba, mpe ndeko na ye Salomo. 11 Na nsima, Natane+ alobaki na Bate-sheba,+ mama ya Salomo,+ boye: “Oyoki te ete Adoniya+ mwana ya Hagite akómi mokonzi, mpe nkolo na biso Davidi ayebi ata eloko moko te? 12 Sikoyo nabondeli yo, yoká toli oyo nalingi kopesa yo, mpo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya* mwana na yo Salomo.+ 13 Kɔtá epai ya Mokonzi Davidi mpe lobá na ye: ‘Nkolo na ngai mokonzi, ezali yo te moto olapelaki ngai mosaleli na yo ndai, olobi: “Mwana na yo Salomo akokóma mokonzi nsima na ngai, mpe ete ye nde akofanda na kiti na ngai ya bokonzi”?+ Sikoyo mpo na nini Adoniya akómi mokonzi?’ 14 Wana ozali naino kosolola na mokonzi, nakoya mpe nakokɔta epai ya mokonzi nsima na yo, mpe nakomonisa ye ete maloba na yo ezali solo.”

15 Bongo Bate-sheba akɔtaki epai ya mokonzi, na shambrɛ na ye. Nzokande mokonzi akómaki mpenza mobange, mpe Abishage+ Moshuneme azalaki kosalela ye. 16 Na nsima, Bate-sheba agumbamaki mpe afukamaki elongi na nse liboso ya mokonzi. Bongo mokonzi atunaki ye: “Eloko nini olingi kosɛnga?” 17 Ayanolaki: “Nkolo na ngai, yo moto olapelaki ngai mosaleli na yo ndai na nkombo ya Yehova ete: ‘Mwana na yo Salomo akokóma mokonzi nsima na ngai, mpe ye nde akofanda na kiti na ngai ya bokonzi.’+ 18 Sikoyo, Ee nkolo na ngai mokonzi, nayoki ete Adoniya akómi mokonzi, kasi yo oyebi ata eloko moko te.+ 19 Apesi ebele mpenza ya bambeka ya bangɔmbɛ, ya banyama ya mafutamafuta mpe ya bampate. Abengisi bana na yo nyonso, ná nganga-nzambe Abiatare, mpe Yoabe mokonzi ya basoda;+ kasi abengisi te mosaleli na yo Salomo.+ 20 Sikoyo, Ee nkolo na ngai mokonzi, bato nyonso ya Yisraele bazali kozela oyebisa bango nani akofanda na kiti ya bokonzi nsima na yo. 21 Soki osali eloko te, Ee nkolo na ngai mokonzi, ntango kaka okokufa,* bakotalela ngai ná mwana na ngai Salomo lokola banguna na bango.”

22 Mpe wana azalaki naino koloba na mokonzi, mosakoli Natane akómaki.+ 23 Na mbala moko bayebisaki mokonzi ete: “Mosakoli Natane ayei!” Bongo akɔtaki epai ya mokonzi mpe afukamaki elongi na nse liboso ya mokonzi. 24 Na nsima Natane alobi: “Nkolo na ngai mokonzi, yo moto olobaki, ‘Adoniya akokóma mokonzi nsima na ngai, mpe ye nde akofanda na kiti na ngai ya bokonzi’?+ 25 Mpo lelo oyo akei kopesa ebele mpenza ya bambeka+ ya bangɔmbɛ, ya banyama ya mafutamafuta, mpe ya bampate. Lisusu, abengisi bana na yo nyonso, ná bakonzi ya basoda, mpe nganga-nzambe Abiatare.+ Bazali kolya mpe komɛla kuna liboso na ye, mpe bazali se koloba: ‘Mokonzi Adoniya azala na bomoi!’ 26 Kasi aboyi kobengisa ngai mosaleli na yo, ata mpe nganga-nzambe Zadoke, Benaya+ mwana ya Yehoyada, mpe mosaleli na yo Salomo. 27 Ee nkolo na ngai mokonzi, yo nde opesi nzela na likambo yango mpe oyebisi ngai mosaleli na yo te nani akofanda na kiti na yo ya bokonzi nsima na yo?”

28 Bongo Mokonzi Davidi alobaki: “Bóbengela ngai Bate-sheba.” Na yango, Bate-sheba akɔtaki mpe atɛlɛmaki liboso ya mokonzi. 29 Mpe mokonzi alapaki ndai ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abikisaki ngai* na bampasi na ngai nyonso,+ 30 kaka ndenge nalapelaki yo ndai na nkombo ya Yehova Nzambe ya Yisraele ete: ‘Mwana na yo Salomo akokóma mokonzi nsima na ngai, mpe ye nde akofanda na kiti na ngai ya bokonzi na esika na ngai!’ ndenge wana nde nakosala na mokolo ya lelo.” 31 Na yango Bate-sheba agumbamaki elongi na nse, afukamaki liboso ya mokonzi mpe alobaki: “Tiká ete Mokonzi Davidi, Nkolo na ngai, azala na bomoi libela na libela!”

32 Na mbala moko Mokonzi Davidi alobaki: “Bóbengela ngai nganga-nzambe Zadoke, mosakoli Natane ná Benaya+ mwana ya Yehoyada.”+ Bongo mibali yango bayaki liboso ya mokonzi. 33 Mokonzi alobaki na bango: “Bókende elongo na basaleli na ngai, bómatisa mwana na ngai Salomo na mpunda* na ngai+ mpe bókita elongo na ye na Gihone.+ 34 Kuna, nganga-nzambe Zadoke ná mosakoli Natane bakotya ye mafuta+ mpo akóma mokonzi ya Yisraele. Na nsima, bosengeli koyula* liseke mpe koloba: ‘Mokonzi Salomo azala na bomoi!’+ 35 Bongo bokozonga elongo na ye, mpe akofanda na kiti na ngai ya bokonzi. Ye nde akozala mokonzi na esika na ngai, mpe nakotya ye mokambi ya Yisraele mpe ya Yuda.” 36 Na mbala moko, Benaya mwana ya Yehoyada alobaki na mokonzi ete: “Amen! Tiká Yehova Nzambe ya nkolo na ngai mokonzi andima likambo oyo olobi. 37 Tiká Yehova azala na Salomo+ kaka ndenge azalaki elongo na yo, Ee nkolo na ngai mokonzi, mpe tiká asala ete kiti na ye ya bokonzi* ezala na nkembo mingi koleka kiti ya bokonzi ya nkolo na ngai Mokonzi Davidi.”+

38 Na yango nganga-nzambe Zadoke, mosakoli Natane, ná Benaya+ mwana ya Yehoyada, bakendaki elongo na Bakerete ná Bapelete+ mpe bamatisaki Salomo na mpunda ya Mokonzi Davidi,+ mpe bamemaki ye na Gihone.+ 39 Nganga-nzambe Zadoke azwaki liseke ya mafuta+ na hema*+ mpe atyaki Salomo mafuta.+ Bongo babandaki koyula liseke mpe bato nyonso babandaki koganga na mongongo makasi ete: “Mokonzi Salomo azala na bomoi!” 40 Nsima na yango, bato nyonso bamataki mpe balandaki Salomo, bazalaki kobɛta piololo mpe kosepela mingi mpenza tii mabele eninganaki* mpo na makɛlɛlɛ na bango.+

41 Adoniya ná bato nyonso oyo abengisaki bayokaki makɛlɛlɛ wana ntango basilisaki kolya.+ Ntango kaka Yoabe ayokaki makɛlɛlɛ ya liseke yango, alobaki: “Mpo na nini makɛlɛlɛ makasi boye na kati ya engumba?” 42 Wana azalaki naino koloba, Yonatane+ mwana ya nganga-nzambe Abiatare akómaki. Bongo Adoniya alobaki na ye: “Kɔtá awa, mpo ozali moto malamu,* mpe na ntembe te oyei na nsango malamu.” 43 Kasi Yonatane ayanolaki Adoniya: “Te, kutu nde, nkolo na biso Mokonzi Davidi akómisi Salomo mokonzi. 44 Mokonzi atindaki nganga-nzambe Zadoke, mosakoli Natane, Benaya mwana ya Yehoyada mpe Bakerete ná Bapelete bákende elongo na Salomo, mpe bamatisaki ye na mpunda ya mokonzi.+ 45 Ntango bakómaki na Gihone, nganga-nzambe Zadoke ná mosakoli Natane batyaki ye mafuta mpo akóma mokonzi. Na nsima balongwaki kuna, bazongaki na esengo mpe yikiyiki ekɔti na engumba. Yango nde ntina ya makɛlɛlɛ oyo bouti koyoka. 46 Lisusu, Salomo afandi na kiti ya bokonzi. 47 Longola yango, basaleli ya mokonzi bayei kopesa nkolo na biso Mokonzi Davidi longonya mpe balobi: ‘Tiká Nzambe na yo apesa nkombo ya Salomo lokumu mingi koleka nkombo na yo, mpe tiká asala ete kiti ya bokonzi ya Salomo ezala na nkembo mingi koleka kiti ya bokonzi na yo!’ Mpe mokonzi afukamaki liboso ya Nzambe na mbeto na ye. 48 Mpe lisusu, mokonzi alobaki: ‘Tiká Yehova Nzambe ya Yisraele asanzolama! mpo lelo oyo aponi moto moko afanda na kiti na ngai ya bokonzi, mpe apesi ngai nzela namona yango na miso na ngai moko.’”

49 Na yango bato nyonso oyo Adoniya abengisaki babangaki makasi, batɛlɛmaki mpe moto na moto akendaki na nzela na ye. 50 Adoniya mpe abangaki Salomo; na yango atɛlɛmaki, akendaki na tabernakle mpe asimbaki makasi maseke ya etumbelo.+ 51 Bongo, bapesaki Salomo nsango oyo: “Ee mokonzi Salomo, Adoniya azali kobanga yo. Asimbi makasi maseke ya etumbelo mpe alobi: ‘Mokonzi Salomo alapela ngai naino ndai ete akoboma ngai mosaleli na ye na mopanga te.’” 52 Na yango, Salomo alobaki: “Soki asali makambo ya malamu, nsuki na ye ata moko te ekokwea na mabele; kasi soki asali likambo moko ya mabe,+ akokufa mpenza.” 53 Bongo Mokonzi Salomo atindaki bato bákitisa Adoniya na etumbelo. Na nsima, akɔtaki mpe agumbamaki liboso ya Mokonzi Salomo. Bongo Salomo alobaki na ye: “Tɛlɛmá mpe kende na ndako na yo.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto