Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 18
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Mikumba ya banganga-nzambe mpe ya Balevi (1-7)

      • Makabo mpo na banganga-nzambe (8-19)

        • Kondimana ya mungwa (19)

      • Balevi bazwi moko ya bandambo zomi mpe bapesi moko ya bandambo zomi (20-32)

Mitángo 18:1

Mitindami

  • +Kob 25:8; Le 21:10-12
  • +Kob 28:38; Le 22:9; Mit 18:23

Mitángo 18:2

Mitindami

  • +Mit 3:6; 8:22; 16:9
  • +Mit 1:53

Mitángo 18:3

Mitindami

  • +Mit 3:25, 26, 30, 31, 36, 37
  • +Mit 4:15, 20; 16:39, 40

Mitángo 18:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mopaya,” elingi koloba, moto oyo azali na libota ya Arona te.

Mitindami

  • +Mit 1:51; 3:10

Mitángo 18:5

Mitindami

  • +Le 24:2, 3; Mit 3:32
  • +Kob 30:7
  • +Mit 16:46

Mitángo 18:6

Mitindami

  • +Mit 3:9, 12; 8:15, 16
  • +Mit 8:19

Mitángo 18:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mopaya,” elingi koloba, moto oyo azali na libota ya Arona te.

Mitindami

  • +Le 16:2, 12; Ebr 9:3, 7
  • +1Sa 2:28; Ebr 5:4
  • +Mit 3:10; 16:39, 40

Mitángo 18:8

Mitindami

  • +Kob 23:19; Le 27:28, 30; Mit 18:11, 26
  • +Le 7:34; Mit 5:9

Mitángo 18:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mbuma ya kosala farini.”

Mitindami

  • +Le 2:3
  • +Le 5:11, 12; 6:25, 26
  • +Le 7:1, 7

Mitángo 18:10

Mitindami

  • +Kob 29:32; Le 6:14, 16; 10:12, 13
  • +Le 6:18; 7:1, 6; 14:13; 21:22

Mitángo 18:11

Mitindami

  • +Mit 15:20; Ezk 44:30
  • +Kob 29:27; Le 7:34
  • +Le 10:14; Mib 18:3
  • +Le 22:4-6

Mitángo 18:12

Mitindami

  • +Le 2:14; Mib 18:4
  • +Mas 3:9

Mitángo 18:13

Mitindami

  • +Kob 23:19

Mitángo 18:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, eloko oyo esantisami mpo na Nzambe, ekoki kobongwana te mpe ekoki kosombama ata moke te.

Mitindami

  • +Le 27:21, 28

Mitángo 18:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ya mosuni nyonso.”

Mitindami

  • +Kob 13:2; Le 27:26; Mit 3:13
  • +Kob 13:13
  • +Kob 34:20; Le 27:27

Mitángo 18:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.

  • *

    To, “shekele mosantu.”

  • *

    Gera moko = 0,57 g. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Le 27:6

Mitángo 18:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”

Mitindami

  • +Kob 22:30; Mib 15:19
  • +Le 17:11
  • +Le 3:16

Mitángo 18:18

Mitindami

  • +Kob 29:26; Le 7:31, 34

Mitángo 18:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, kondimana ya libela mpe oyo ebongwanaka te.

Mitindami

  • +Kob 23:19; Mit 15:18, 19; 18:11, 26; 31:28, 29
  • +2Nt 31:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Lamuká!,

    10/2002, lok. 26

Mitángo 18:20

Mitindami

  • +Mit 26:62, 63; Mib 10:9; 14:27; Yos 14:3
  • +Mib 18:1, 2; Yos 18:7; Ezk 44:28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2011, lok. 31

    15/9/2011, nk. 7-8

    15/4/1998, lok. 20

Mitángo 18:21

Mitindami

  • +Le 27:30; Ne 10:37; 12:44; Ebr 7:5

Mitángo 18:23

Mitindami

  • +Mit 3:6, 7; 18:1
  • +Yos 13:33

Mitángo 18:24

Mitindami

  • +Mib 10:9

Mitángo 18:26

Mitindami

  • +Mit 18:21; Mib 12:19
  • +Ne 10:38

Mitángo 18:27

Mitindami

  • +Mit 15:20

Mitángo 18:29

Mitindami

  • +Mit 18:8, 12

Mitángo 18:31

Mitindami

  • +1Ko 9:13

Mitángo 18:32

Mitindami

  • +Le 22:2, 15

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 18:1Kob 25:8; Le 21:10-12
Mit. 18:1Kob 28:38; Le 22:9; Mit 18:23
Mit. 18:2Mit 3:6; 8:22; 16:9
Mit. 18:2Mit 1:53
Mit. 18:3Mit 3:25, 26, 30, 31, 36, 37
Mit. 18:3Mit 4:15, 20; 16:39, 40
Mit. 18:4Mit 1:51; 3:10
Mit. 18:5Le 24:2, 3; Mit 3:32
Mit. 18:5Kob 30:7
Mit. 18:5Mit 16:46
Mit. 18:6Mit 3:9, 12; 8:15, 16
Mit. 18:6Mit 8:19
Mit. 18:7Le 16:2, 12; Ebr 9:3, 7
Mit. 18:71Sa 2:28; Ebr 5:4
Mit. 18:7Mit 3:10; 16:39, 40
Mit. 18:8Kob 23:19; Le 27:28, 30; Mit 18:11, 26
Mit. 18:8Le 7:34; Mit 5:9
Mit. 18:9Le 2:3
Mit. 18:9Le 5:11, 12; 6:25, 26
Mit. 18:9Le 7:1, 7
Mit. 18:10Kob 29:32; Le 6:14, 16; 10:12, 13
Mit. 18:10Le 6:18; 7:1, 6; 14:13; 21:22
Mit. 18:11Mit 15:20; Ezk 44:30
Mit. 18:11Kob 29:27; Le 7:34
Mit. 18:11Le 10:14; Mib 18:3
Mit. 18:11Le 22:4-6
Mit. 18:12Le 2:14; Mib 18:4
Mit. 18:12Mas 3:9
Mit. 18:13Kob 23:19
Mit. 18:14Le 27:21, 28
Mit. 18:15Kob 13:2; Le 27:26; Mit 3:13
Mit. 18:15Kob 13:13
Mit. 18:15Kob 34:20; Le 27:27
Mit. 18:16Le 27:6
Mit. 18:17Kob 22:30; Mib 15:19
Mit. 18:17Le 17:11
Mit. 18:17Le 3:16
Mit. 18:18Kob 29:26; Le 7:31, 34
Mit. 18:19Kob 23:19; Mit 15:18, 19; 18:11, 26; 31:28, 29
Mit. 18:192Nt 31:4
Mit. 18:20Mit 26:62, 63; Mib 10:9; 14:27; Yos 14:3
Mit. 18:20Mib 18:1, 2; Yos 18:7; Ezk 44:28
Mit. 18:21Le 27:30; Ne 10:37; 12:44; Ebr 7:5
Mit. 18:23Mit 3:6, 7; 18:1
Mit. 18:23Yos 13:33
Mit. 18:24Mib 10:9
Mit. 18:26Mit 18:21; Mib 12:19
Mit. 18:26Ne 10:38
Mit. 18:27Mit 15:20
Mit. 18:29Mit 18:8, 12
Mit. 18:311Ko 9:13
Mit. 18:32Le 22:2, 15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 18:1-32

Mitángo

18 Bongo Yehova alobaki na Arona ete: “Yo ná bana na yo ya mibali mpe ndako ya tata na yo, bokomema ngambo mpo na libunga nyonso oyo basaleli esika mosantu,+ mpe yo ná bana na yo ya mibali, bokomema ngambo mpo na libunga oyo basaleli bonganga-nzambe na bino.+ 2 Mpe yaká na bandeko na yo ya mibali ya libota ya Levi, libota ya bankɔkɔ na yo, mpo bázala elongo na yo mpe básalela yo,+ yo ná bana na yo ya mibali, liboso ya hema ya Litatoli.+ 3 Basengeli kokokisa mikumba na bango epai na yo mpe na hema mobimba.+ Kasi basengeli te kopusana pene na bisaleli ya esika mosantu mpe na etumbelo mpo ezala bino to bango bókufa te.+ 4 Bakozala elongo na yo mpe bakokokisa mikumba na bango na oyo etali hema ya kokutana mpe mosala nyonso ya hema, mpe moto oyo apesami nzela te* akopusana te pene na bino.+ 5 Bosengeli kokokisa mokumba na bino mpo na esika mosantu+ mpe mpo na etumbelo,+ mpo nkanda+ ekitela bato ya Yisraele lisusu te. 6 Ngai moko nazwi bandeko na bino ya mibali, Balevi, na kati ya Bayisraele, bázala likabo mpo na bino.+ Bapesami epai ya Yehova mpo na kosala mosala ya hema ya kokutana.+ 7 Yo ná bana na yo ya mibali bozali na mokumba ya kosala mosala na bino ya bonganga-nzambe na oyo etali etumbelo mpe biloko oyo ezali na nsima ya rido,+ mpe bosengeli kosala mosala yango.+ Napesi bino mosala ya bonganga-nzambe lokola likabo, mpe moto oyo apesami nzela te,* oyo akopusana pene akobomama.”+

8 Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Ngai moko napesi yo mosala ya kobatela makabo oyo bapesi ngai.+ Napesi yo ná bana na yo ya mibali mpo na libela eteni ya likabo ya biloko nyonso mosantu oyo Bayisraele bapesi.+ 9 Talá oyo ekozala ya yo na biloko oyo eleki mosantu, na likabo oyo etumbami na mɔtɔ: likabo na bango nyonso ná likabo na bango ya mbuma,*+ likabo na bango mpo na lisumu,+ mpe likabo na bango ya ngambo,+ oyo bakomemela ngai. Ezali eloko oyo eleki mosantu mpo na yo mpe mpo na bana na yo ya mibali. 10 Okolya yango na esika oyo eleki mosantu.+ Mobali nyonso akoki kolya yango. Ekozala eloko moko mosantu mpo na yo.+ 11 Oyo mpe ezali ya yo: makabo oyo bakopesa+ ná makabo nyonso ya koningisa+ ya Bayisraele. Napesi yo yango, ná bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi mpo na libela.+ Moto nyonso ya pɛto na ndako na yo akoki kolya yango.+

12 “Napesi yo+ mafuta nyonso oyo eleki kitoko mpe vinyo nyonso ya sika oyo eleki kitoko mpe mbuma, mbuma na bango ya liboso,+ oyo bapesi Yehova. 13 Mbuma nyonso ya liboso oyo eteli na mokili na bango, oyo bakomemela Yehova, ekokóma ya yo.+ Moto nyonso ya pɛto na ndako na yo akoki kolya yango.

14 “Eloko nyonso oyo ebongisami mpo na mosala moko mosantu* na Yisraele ekokóma ya yo.+

15 “Mwana nyonso ya liboso ya ekelamu ya bomoi,*+ oyo bakopesa Yehova, ekokóma ya yo, ezala moto to nyama. Nzokande, okosikola mpenza mwana ya liboso ya bato,+ mpe okosikola mwana ya liboso ya nyama ya mbindo.+ 16 Okosikola yango na motuya ya lisiko ntango ekokokisa sanza moko to koleka, na kolanda motuya oyo ekatami ya shekele* mitano ya palata,+ na kolanda shekele ya esika mosantu.* Ezali gera* 20. 17 Kasi okosikola te ngɔmbɛ-mobali oyo ezali mwana ya liboso to mwana-mpate ya mobali oyo ezali mwana ya liboso to ntaba oyo ezali mwana ya liboso.+ Ezali eloko moko mosantu. Okomwangisa makila na yango likoló ya etumbelo,+ mpe okosala ete mafuta na yango ebimisa milinga lokola likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova.+ 18 Mpe mosuni na yango ekokóma ya yo. Lokola ntolo ya likabo ya koningisa mpe lokola lokolo ya mobali, ekokóma ya yo.+ 19 Makabo nyonso mosantu, oyo Bayisraele bakopesa Yehova,+ napesi yo yango ná bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi mpo na libela.+ Ezali kondimana ya mungwa* mpo na libela liboso ya Yehova mpo na yo mpe mpo na bana na yo elongo na yo.”

20 Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Na mokili na bango okozala na libula te, mpe eteni moko te ya mabele ekokóma ya yo.+ Ngai nazali eteni na yo mpe libula na yo na kati ya Bayisraele.+

21 “Talá! napesi bana ya Levi moko ya bandambo zomi nyonso+ na Yisraele ezala libula mpo na mosala oyo bazali kosala, mosala ya hema ya kokutana. 22 Bato ya Yisraele bakopusana na hema ya kokutana lisusu te, noki bakosala lisumu mpe bakokufa. 23 Balevi bango moko bakosala mosala ya hema ya kokutana, mpe bango nde bakozongisa monɔkɔ mpo na libunga na bango.+ Ezali mobeko mpo na libela na boumeli ya mabota na bino nyonso ete bakozwa libula te na kati ya Bayisraele.+ 24 Mpo napesi Balevi moko ya bandambo zomi lokola libula na nzela ya likabo oyo Bayisraele bakopesa Yehova. Yango wana, nalobi na bango ete: ‘Bakozwa libula te na kati ya Bayisraele.’”+

25 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 26 “Okoloba na Balevi boye: ‘Bokozwa epai ya Bayisraele moko ya bandambo zomi oyo napesi bino uta na bango mpo ezala libula na bino,+ mpe bokopesa likabo uta na yango lokola likabo mpo na Yehova, moko ya bandambo zomi uta na moko ya bandambo zomi.+ 27 Mpe bakotalela yango lokola likabo na bino, lokola nde ezalaki mbuma ya esika ya kotutatuta mbuma+ to lokola biloko nyonso oyo euti na ekamwelo ya vinyo mpe ya mafuta. 28 Ndenge wana nde bino mpe bokopesa Yehova likabo oyo euti na moko ya bandambo zomi nyonso oyo bokozwa epai ya Bayisraele, mpe na oyo wana, bokopesa Arona nganga-nzambe likabo mpo na Yehova. 29 Na makabo nyonso oyo bakopesa bino lokola eloko moko mosantu, bokopesa Yehova lolenge nyonso ya likabo oyo eleki kitoko.’+

30 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Ntango bokopesa eloko oyo eleki kitoko oyo euti na biloko yango, oyo ekotikala ekozala ya bino Balevi, lokola eloko ya esika ya kotutatuta mbuma na bino mpe lokola biloko oyo euti na ekamwelo ya vinyo mpe ya mafuta na bino. 31 Bino ná bato ya ndako na bino bokoki kolya yango na esika nyonso, mpo ezali lifuti na bino mpo na mosala oyo bozali kosala na hema ya kokutana.+ 32 Bokosala lisumu te mpo na yango ntango bokopesa eloko oyo eleki kitoko oyo euti na biloko yango, mpe bosengeli te kokómisa biloko mosantu ya Bayisraele biloko mpamba, mpo bókufa te.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto