Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 38
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Goge akobundisa Yisraele (1-16)

      • Nkanda ya Yehova mpo na Goge (17-23)

        • ‘Bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova’ (23)

Ezekiele 38:2

Mitindami

  • +Ezk 38:15
  • +Yis 66:19; Ezk 27:13; 32:26
  • +Ezk 39:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    5/2020, lok. 15

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    9/2019, lok. 11

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 9

    1/3/1997, nk. 14-15

    Mokili mozangi bitumba?, lok. 18

Ezekiele 38:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Banguba ya mike, oyo mbala mingi babwaki-mbanzi bazalaki kosalela.

Mitindami

  • +2Ba 19:20, 28; Ezk 29:3, 4; 39:2
  • +Ezk 38:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Danyele, lok. 283

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1997, nk. 15-17

Ezekiele 38:5

Mitindami

  • +1Nt 1:8

Ezekiele 38:6

Mitindami

  • +Eb 10:2, 3; Ezk 27:14
  • +Ezk 39:2

Ezekiele 38:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mokɛngɛli.”

Ezekiele 38:8

Mitindami

  • +Yir 23:5, 6; Ezk 28:25, 26; 34:25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/1991, lok. 27

Ezekiele 38:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mokili ya mboka oyo ezangi baporte.”

Mitindami

  • +Kob 15:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2015, lok. 27

    1/7/1995, lok. 25

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, lok. 227

Ezekiele 38:12

Mitindami

  • +Yir 33:12
  • +Zek 10:8
  • +Yis 60:5; 61:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Danyele, nk. 283-285

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/1993, lok. 18

    15/8/1991, lok. 27

Ezekiele 38:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

Mitindami

  • +Ezk 27:22
  • +Ezk 27:15
  • +Ezk 27:25

Ezekiele 38:14

Mitindami

  • +Ezk 38:8

Ezekiele 38:15

Mitindami

  • +Ezk 39:2
  • +Sef 3:8

Ezekiele 38:16

Mitindami

  • +Yoe 3:2
  • +Kob 14:4; 2Ba 19:17-19; Nz 83:17, 18; Ezk 39:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2015, nk. 14-15

    15/9/2012, nk. 5-6

    15/3/2009, nk. 18-19

Ezekiele 38:18

Mitindami

  • +Yoe 3:16; Nah 1:2; Zek 2:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, lok. 227

Ezekiele 38:20

Mitindami

  • +Nah 1:5

Ezekiele 38:21

Mitindami

  • +2Nt 20:23; Hag 2:22; Zek 14:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, lok. 227

Ezekiele 38:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Nakosamba elongo na ye.”

Mitindami

  • +Zek 14:12
  • +Yir 25:31
  • +Kob 9:22; Yos 10:11
  • +Yis 30:30
  • +Eb 19:24

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 38:2Ezk 38:15
Ezk. 38:2Yis 66:19; Ezk 27:13; 32:26
Ezk. 38:2Ezk 39:1
Ezk. 38:42Ba 19:20, 28; Ezk 29:3, 4; 39:2
Ezk. 38:4Ezk 38:15
Ezk. 38:51Nt 1:8
Ezk. 38:6Eb 10:2, 3; Ezk 27:14
Ezk. 38:6Ezk 39:2
Ezk. 38:8Yir 23:5, 6; Ezk 28:25, 26; 34:25
Ezk. 38:11Kob 15:9
Ezk. 38:12Yir 33:12
Ezk. 38:12Zek 10:8
Ezk. 38:12Yis 60:5; 61:6
Ezk. 38:13Ezk 27:22
Ezk. 38:13Ezk 27:15
Ezk. 38:13Ezk 27:25
Ezk. 38:14Ezk 38:8
Ezk. 38:15Ezk 39:2
Ezk. 38:15Sef 3:8
Ezk. 38:16Yoe 3:2
Ezk. 38:16Kob 14:4; 2Ba 19:17-19; Nz 83:17, 18; Ezk 39:21
Ezk. 38:18Yoe 3:16; Nah 1:2; Zek 2:8
Ezk. 38:20Nah 1:5
Ezk. 38:212Nt 20:23; Hag 2:22; Zek 14:13
Ezk. 38:22Zek 14:12
Ezk. 38:22Yir 25:31
Ezk. 38:22Kob 9:22; Yos 10:11
Ezk. 38:22Yis 30:30
Ezk. 38:22Eb 19:24
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 38:1-23

Ezekiele

38 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya Goge ya mokili ya Magoge,+ nkumu monene ya Mesheke ná Tubale,+ mpe sakolá mpasi oyo ekokómela ye.+ 3 Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Goge, nkumu monene ya Mesheke ná Tubale. 4 Nakobalusa yo, nakotya bandɔbɔ na mbanga na yo+ mpe nakobimisa yo elongo na limpinga ya basoda na yo nyonso,+ bampunda ná basoda oyo batambolaka na mpunda, bango nyonso balati bilamba ya nkembo, lisangá moko monene mpenza, bazali na banguba ya minene ná banguba ya mike,* bango nyonso bayebi kosalela mipanga; 5 Perse, Etiopi ná Puti,+ bazali elongo na bango, bango nyonso bazali na nguba ya moke mpe ekɔti; 6 Gomere ná basoda na yango nyonso, ezala mpe bana ya Togarama,+ oyo bauti na bisika eleki mosika mpenza ya nɔrdi, elongo na basoda na yango nyonso, bato ebele ya bikólo bazali elongo na yo.+

7 “‘“Omilɛngɛla, omibongisa, yo ná mampinga na yo nyonso oyo bayangani ná yo, mpe okozala komanda* na bango.

8 “‘“Nsima ya mikolo mingi, bakotyela yo likebi. Na eleko ya nsuka ya bambula, okotonda na mokili ya bato oyo bazongisami mpe babiki na mopanga, oyo bayanganisami uta na bato ya bikólo mingi, na bangomba ya Yisraele, oyo etikalá ntango molai esika oyo ebebisamá. Bafandi ya mokili oyo bazwami uta na bato ya bikólo mpe bango nyonso bafandi na kimya.+ 9 Okobɛta bango lokola mbula ya mopɛpɛ makasi, okozipa mokili lokola mapata, yo ná basoda na yo nyonso mpe ebele ya bato ya bikólo elongo na yo.”’

10 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Makanisi ekoyela yo na motema, mpe okokana kosala likambo moko ya mabe. 11 Okoloba ete: “Nakokɔta na mokili ya bisika oyo ezangi libateli.*+ Nakobundisa baoyo bafandi na kimya kozanga motungisi, bango nyonso bafandi na bisika oyo ezangi bifelo, bikangiseli to baporte.” 12 Ekozala mpo na kobɔtɔla biloko ebele mpe mpo na kopunza, mpo na kobundisa bisika oyo ebebisamaki kasi bato bazongelaki kofanda kuna+ mpe mpo na kobundisa bato oyo bayanganisami uta na bikólo,+ bato oyo bazali konduka bozwi mpe biloko,+ baoyo bazali kofanda na katikati ya mabele.

13 “‘Sheba,+ Dedane,+ bato ya mombongo ya Tarasisi+ mpe babundi-bitumba* na yango nyonso bakoloba na yo boye: “Ozali koya nde mpo na kobɔtɔla biloko ebele mpe kopunza? Osangisi nde mapinga na yo mpo na komema palata ná wolo, mpo na konduka bozwi mpe biloko, mpo na kobɔtɔla biloko ebele?”’

14 “Na yango sakolá, mwana ya moto, mpe lobá na Goge boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mokolo oyo bato na ngai Yisraele bakofanda na kimya, okomona yango, boye te?+ 15 Okouta na esika na yo, na bisika eleki mosika ya nɔrdi,+ yo ná ebele ya bato ya bikólo elongo na yo, bango nyonso bamati na bampunda, lisangá moko monene, limpinga moko monene ya basoda.+ 16 Okobundisa bato na ngai Yisraele, ndenge mapata ezingaka mokili. Na eleko ya nsuka ya mikolo, nakomema yo mpo na kobundisa mokili na ngai+ mpo bato ya bikólo báyeba ngai ntango nakomisantisa na nzela na yo na miso na bango, Ee Goge.”’+

17 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ozali kaka te moto oyo nalobelaki na mikolo ya kala na nzela ya basaleli na ngai basakoli ya Yisraele, baoyo basakolaki bambula ebele ete okomemama mpo na kobundisa Bayisraele?’

18 “‘Na mokolo yango, na mokolo oyo Goge akoyela mokili ya Yisraele, nkanda makasi na ngai ekopela, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.+ 19 Na molende na ngai, na mɔtɔ ya nkanda makasi na ngai, nakoloba. Mpe na mokolo yango, koningana moko monene ya mabele ekosalema na mokili ya Yisraele. 20 Mpo na ngai, mbisi ya mbu, bandɛkɛ ya likoló, banyama ya zamba oyo efandaka na esobe, banyama oyo ebendanaka na libumu na mabele mpe bato nyonso na etando ya mabele bakolɛnga, bangomba ekobukana mpe bangomba ya mabanga ekokwea,+ mpe efelo nyonso ekokwea na mabele.’

21 “‘Na bangomba na ngai nyonso, nakobenga mopanga mpo na kobundisa ye,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. ‘Moto na moto akobunda na moninga na ye soda.+ 22 Nakopesa ye etumbu* ya maladi mabe+ mpe kosopa makila; nakonɔkisela ye, basoda na ye mpe ebele ya bato ya bikólo oyo bazali elongo na ye+ mbula makasi oyo ezali kozindisa, mbula ya mabanga,+ mɔtɔ+ mpe sufulu.+ 23 Mpe nakomitombola mpenza, nakomisantisa mpe nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi. Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto