Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Batindi banɔngi 12 na mokili ya Kanana (1-24)

      • Banɔngi 10 bapesi nsango ya mabe (25-33)

Mitángo 13:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, koluka koyeba makambo etali mokili ya Kanana.

Mitindami

  • +Kob 18:25; Mib 1:15
  • +Mib 1:22, 23

Mitángo 13:3

Mitindami

  • +Mit 12:16; Mib 1:19

Mitángo 13:6

Mitindami

  • +Mit 13:30; 14:30, 38; 34:18, 19; 1Nt 4:15

Mitángo 13:8

Mitindami

  • +Mit 11:28; 13:16; 14:30; 34:17

Mitángo 13:11

Mitindami

  • +Eb 48:5
  • +Eb 48:17, 19

Mitángo 13:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Yehoshua,” oyo elimboli, “Yehova azali lobiko.”

Mitindami

  • +Kob 17:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2002, lok. 11

Mitángo 13:17

Mitindami

  • +Mib 1:7

Mitángo 13:18

Mitindami

  • +Kob 3:8; Mib 8:7

Mitángo 13:20

Mitindami

  • +Ne 9:25; Ezk 20:6
  • +Mib 31:6; Yos 1:6, 9
  • +Mit 13:23

Mitángo 13:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔtelo ya Hamate.”

Mitindami

  • +Mit 34:2, 3; Yos 15:1
  • +2Sa 10:6, 8
  • +Mit 34:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 33

Mitángo 13:22

Mitindami

  • +Eb 13:18; Yos 15:13; 21:11, 12
  • +Bas 1:10
  • +Mib 9:1, 2; Yos 11:21

Mitángo 13:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mit 32:9
  • +Mib 1:25; 8:7-9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2006, lok. 16

Mitángo 13:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Elimboli, “etuka ya mbuma ya vinyo.”

Mitindami

  • +Mib 1:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2006, lok. 16

Mitángo 13:25

Mitindami

  • +Mit 14:33, 34

Mitángo 13:26

Mitindami

  • +Mib 1:19

Mitángo 13:27

Mitindami

  • +Kob 3:8; Le 20:24
  • +Mib 1:25

Mitángo 13:28

Mitindami

  • +Mit 13:22, 33; Mib 1:27, 28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 31

Mitángo 13:29

Mitindami

  • +Eb 36:12; Kob 17:8; 1Sa 15:3
  • +Mit 13:17
  • +Bas 1:21; 2Sa 5:6, 7
  • +Eb 10:15, 16
  • +Kob 23:23; Mib 7:1; 20:17
  • +Eb 10:19

Mitángo 13:30

Mitindami

  • +Yos 14:7, 8

Mitángo 13:31

Mitindami

  • +Mit 32:9

Mitángo 13:32

Mitindami

  • +Mit 14:36
  • +Am 2:9

Mitángo 13:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bana ya.”

  • *

    Na bisika mosusu babengaka yango “mapalela to makɔnkɔ.”

Mitindami

  • +Mib 1:28; 9:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2011, nk. 10-11

    1/10/2006, lok. 16

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 13:2Kob 18:25; Mib 1:15
Mit. 13:2Mib 1:22, 23
Mit. 13:3Mit 12:16; Mib 1:19
Mit. 13:6Mit 13:30; 14:30, 38; 34:18, 19; 1Nt 4:15
Mit. 13:8Mit 11:28; 13:16; 14:30; 34:17
Mit. 13:11Eb 48:5
Mit. 13:11Eb 48:17, 19
Mit. 13:16Kob 17:9
Mit. 13:17Mib 1:7
Mit. 13:18Kob 3:8; Mib 8:7
Mit. 13:20Ne 9:25; Ezk 20:6
Mit. 13:20Mib 31:6; Yos 1:6, 9
Mit. 13:20Mit 13:23
Mit. 13:21Mit 34:2, 3; Yos 15:1
Mit. 13:212Sa 10:6, 8
Mit. 13:21Mit 34:8
Mit. 13:22Eb 13:18; Yos 15:13; 21:11, 12
Mit. 13:22Bas 1:10
Mit. 13:22Mib 9:1, 2; Yos 11:21
Mit. 13:23Mit 32:9
Mit. 13:23Mib 1:25; 8:7-9
Mit. 13:24Mib 1:24
Mit. 13:25Mit 14:33, 34
Mit. 13:26Mib 1:19
Mit. 13:27Kob 3:8; Le 20:24
Mit. 13:27Mib 1:25
Mit. 13:28Mit 13:22, 33; Mib 1:27, 28
Mit. 13:29Eb 36:12; Kob 17:8; 1Sa 15:3
Mit. 13:29Mit 13:17
Mit. 13:29Bas 1:21; 2Sa 5:6, 7
Mit. 13:29Eb 10:15, 16
Mit. 13:29Kob 23:23; Mib 7:1; 20:17
Mit. 13:29Eb 10:19
Mit. 13:30Yos 14:7, 8
Mit. 13:31Mit 32:9
Mit. 13:32Mit 14:36
Mit. 13:32Am 2:9
Mit. 13:33Mib 1:28; 9:1, 2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 13:1-33

Mitángo

13 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: 2 “Tindá mibali mpo bánɔnga* mokili ya Kanana, oyo nazali kopesa Bayisraele. Bokotinda mobali moko na libota mokomoko ya bankɔkɔ na ye, mokomoko azala nkumu+ na kati na bango.”+

3 Bongo na etinda ya Yehova, Moize atindaki bango longwa na esobe ya Parane.+ Mibali yango nyonso bazalaki bankumu ya Bayisraele. 4 Bankombo na bango yango oyo: na libota ya Rubene, Shamua mwana ya Zakure; 5 na libota ya Simeone, Shafate mwana ya Hori; 6 na libota ya Yuda, Kalebe+ mwana ya Yefune; 7 na libota ya Isakare, Yigale mwana ya Yozefe; 8 na libota ya Efraime, Hoshea+ mwana ya Nunu; 9 na libota ya Benyamina, Palati mwana ya Rafu; 10 na libota ya Zebulone, Gadiele mwana ya Sodi; 11 na libota ya Yozefe,+ mpo na libota ya Manase,+ Gadi mwana ya Susi; 12 na libota ya Dani, Amiele mwana ya Gemali; 13 na libota ya Ashere, Seture mwana ya Mikaele; 14 na libota ya Nafatali, Nahebi mwana ya Vofisi; 15 na libota ya Gade, Guele mwana ya Maki. 16 Wana ezali bankombo ya mibali oyo Moize atindaki mpo na konɔnga mokili. Mpe Moize apesaki Hoshea mwana ya Nunu nkombo Yosua.*+

17 Ntango Moize atindaki bango mpo bánɔnga mokili ya Kanana, alobaki na bango ete: “Bómata kuna tii na Negebe, mpe na nsima bokomata tii bokokɔta na etúká ya ngombangomba.+ 18 Bosengeli kotala soki ezali mokili ya ndenge nini+ mpe soki bato oyo bazali kofanda kuna, bazali makasi to te, soki bazali moke to mingi; 19 mpe soki mokili oyo bazali kofanda ezali malamu to mabe, mpe soki bingumba oyo bazali kofanda ezali na bakaa to na mapango ya makasi; 20 bótala mpe soki mabele ezali ya malamu to te,+ mpe soki ezali na banzete to te. Bosengeli kozala na mpiko+ mpe kozwa ndambo ya mbuma ya mokili yango.” Nzokande, ezalaki eleko oyo mbuma ya liboso ya vinyo etelaka.+

21 Bongo bamataki mpe banɔngaki mokili yango longwa na esobe ya Zine+ tii na Rehobe,+ pene na Lebo-hamate.*+ 22 Ntango bamataki tii bakɔti na Negebe, bakómaki na Hebrone,+ esika oyo Ahimane, Sheshai ná Talamai,+ Baanakime+ bazalaki kofanda. Nzokande, Hebrone etongamaki mbula nsambo liboso ya Zoane ya Ezipito. 23 Ntango bakómaki na Lobwaku* ya Eshikole,+ bakataki etape ya etuka moko ya mbuma ya vinyo, oyo mibali mibale na kati ya mibali yango bamemaki yango na nzete, ná ndambo ya mbuma ya grenade mpe ndambo ya mbuma ya figi.+ 24 Babengaki esika yango Lobwaku* ya Eshikole,*+ mpo na etuka oyo Bayisraele bakataki kuna.

25 Na nsuka ya mikolo 40,+ nsima ya konɔnga mokili yango, bazongaki. 26 Bongo bazongaki epai ya Moize ná Arona mpe liyangani mobimba ya Bayisraele na esobe ya Parane, na Kadeshe.+ Mpe bamemelaki liyangani mobimba maloba mpe balakisaki bango mbuma ya mokili yango. 27 Makambo bayebisaki Moize yango oyo: “Tokɔtaki na mokili oyo otindaki biso, mpe yango etondi mpenza na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ mpe talá mbuma na yango.+ 28 Kasi, bato oyo bazali kofanda na mokili yango bazali makasi, mpe bingumba oyo ebatelami makasi ezali minene mpenza. Kuna tomonaki mpe bana ya Anake.+ 29 Baamaleke+ bazali kofanda na mokili ya Negebe,+ mpe Bahiti, Bayebusi,+ mpe Baamore+ bazali kofanda na etúká ya ngombangomba, mpe Bakanana+ bazali kofanda pembeni ya mbu+ mpe pembenipembeni ya Yordani.”

30 Bongo Kalebe amekaki kokitisa motema ya bato oyo batɛlɛmaki liboso ya Moize; alobaki ete: “Tómata kaka sikoyo mpe tokozwa mpenza yango, mpo tokoki mpenza kolonga yango.”+ 31 Kasi mibali oyo bamataki elongo na ye balobaki ete: “Biso tokokoka te komata mpo na kobunda na bato yango, mpo baleki biso na makasi.”+ 32 Mpe bazalaki kaka kopesa Bayisraele nsango ya mabe+ mpo na mokili oyo banɔngaki, bazalaki koloba ete: “Mokili oyo tolekaki na kati na yango mpo na konɔnga yango ezali mokili moko oyo elyaka bato oyo bafandi kuna, mpe bato nyonso oyo tomonaki na kati bazali mibali ya mbinga na ndenge moko ya kokamwa.+ 33 Mpe kuna tomonaki Banefilime, bana ya Anake,+ oyo bauti na* Banefilime, mpe soki tomikokanisi na bango, biso tozali lokola mabanki,* bango mpe bazalaki komona biso bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto