Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Kolimbola Mibeko

      • Balongwe na Ngomba Horebe (1-8)

      • Kotyama ya bakonzi mpe basambisi (9-18)

      • Bato bazangaki botosi, na Kadeshe-barnea (19-46)

        • Yisraele eboyi kokɔta na mokili (26-33)

        • Balongi Bakanana te (41-46)

Kolimbola Mibeko 1:maloba ya ebandeli ya loyembo

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ebengami mpe “Deteronome.”

Kolimbola Mibeko 1:2

Mitindami

  • +Mib 9:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2004, lok. 25

Kolimbola Mibeko 1:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana ya Yisraele.”

Mitindami

  • +Mit 32:13; 33:38

Kolimbola Mibeko 1:4

Mitindami

  • +Mit 21:23, 24; Yos 12:1, 2
  • +Mit 21:33-35
  • +Yos 13:8, 12

Kolimbola Mibeko 1:5

Mitindami

  • +Mib 4:8; 17:18; Ne 8:7

Kolimbola Mibeko 1:6

Mitindami

  • +Kob 19:1; Mit 10:11, 12

Kolimbola Mibeko 1:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ekoki kozala kolandana ya bangomba ya Liban.

Mitindami

  • +Eb 15:16
  • +Yos 12:2, 3
  • +Yos 9:1, 2
  • +Yos 13:1, 5; 1Ba 9:19
  • +Eb 15:18

Kolimbola Mibeko 1:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Eb 26:3
  • +Eb 28:13
  • +Eb 12:7; 13:14, 15; 17:1, 7

Kolimbola Mibeko 1:9

Mitindami

  • +Kob 18:17, 18

Kolimbola Mibeko 1:10

Mitindami

  • +Eb 15:1, 5; Kob 32:13; Mit 26:51; Mib 10:22

Kolimbola Mibeko 1:11

Mitindami

  • +1Ba 3:8
  • +Eb 12:1-3; 22:15, 17; 26:3, 4; Kob 23:25

Kolimbola Mibeko 1:12

Mitindami

  • +Kob 18:17, 18; Mit 11:11; 20:3

Kolimbola Mibeko 1:13

Mitindami

  • +Kob 18:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2000, lok. 32

Kolimbola Mibeko 1:15

Mitindami

  • +Kob 18:25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2007, lok. 20

Kolimbola Mibeko 1:16

Mitindami

  • +Kob 23:8; Mib 16:18; Yn 7:24
  • +Kob 22:21; Le 19:34; 24:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/1992, lok. 17

Kolimbola Mibeko 1:17

Mitindami

  • +Le 19:15; Ro 2:11
  • +Kob 23:3
  • +Mas 29:25
  • +2Nt 19:6
  • +Kob 18:25, 26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2004, lok. 25

    1/7/1992, lok. 17

Kolimbola Mibeko 1:19

Mitindami

  • +Mit 10:12; Mib 8:14, 15; Yir 2:6
  • +Mit 13:29
  • +Mit 13:26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 31

Kolimbola Mibeko 1:21

Mitindami

  • +Kob 23:27; Mib 1:8

Kolimbola Mibeko 1:22

Mitindami

  • +Mit 13:1, 2

Kolimbola Mibeko 1:23

Mitindami

  • +Mit 13:3

Kolimbola Mibeko 1:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mit 13:17

Kolimbola Mibeko 1:25

Mitindami

  • +Mit 13:23-27

Kolimbola Mibeko 1:26

Mitindami

  • +Mit 14:1-4

Kolimbola Mibeko 1:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “basali ete mitema na biso elɛmba.”

  • *

    Elingi koloba, bifelo ya milai mpenza.

Mitindami

  • +Mit 32:9; Yos 14:7, 8
  • +Mit 13:28, 33
  • +Mit 13:22; Yos 11:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, lok. 11

Kolimbola Mibeko 1:29

Mitindami

  • +Mit 14:9

Kolimbola Mibeko 1:30

Mitindami

  • +Kob 14:14; Yos 10:42
  • +Mit 14:22

Kolimbola Mibeko 1:32

Mitindami

  • +Nz 78:22; 106:24; Ebr 3:16, 19; Yd 5

Kolimbola Mibeko 1:33

Mitindami

  • +Kob 13:21; 40:36; Mit 10:33, 34; Nz 78:14

Kolimbola Mibeko 1:34

Mitindami

  • +Mit 14:28, 35; 32:10-12; Mib 2:14; Nz 95:11; Ebr 3:11

Kolimbola Mibeko 1:35

Mitindami

  • +Mit 14:29, 35; 1Ko 10:1, 5; Ebr 3:17

Kolimbola Mibeko 1:36

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “malamumalamu; na makambo nyonso.”

Mitindami

  • +Mit 14:24; Yos 14:9

Kolimbola Mibeko 1:37

Mitindami

  • +Mit 20:12; 27:13, 14; Mib 3:26; Nz 106:32

Kolimbola Mibeko 1:38

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “oyo atɛlɛmaka liboso na yo.”

  • *

    To mbala mosusu, “Nzambe akómisi ye makasi.”

Mitindami

  • +Kob 33:11; Mit 11:28
  • +Mit 14:38
  • +Mit 27:18; Mib 31:7; Yos 1:6, 9

Kolimbola Mibeko 1:39

Mitindami

  • +Mit 14:3
  • +Mit 14:30, 31

Kolimbola Mibeko 1:40

Mitindami

  • +Mit 14:25

Kolimbola Mibeko 1:41

Mitindami

  • +Mit 14:39-45

Kolimbola Mibeko 1:42

Mitindami

  • +Le 26:14, 17

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mib. 1:2Mib 9:23
Mib. 1:3Mit 32:13; 33:38
Mib. 1:4Mit 21:23, 24; Yos 12:1, 2
Mib. 1:4Mit 21:33-35
Mib. 1:4Yos 13:8, 12
Mib. 1:5Mib 4:8; 17:18; Ne 8:7
Mib. 1:6Kob 19:1; Mit 10:11, 12
Mib. 1:7Yos 13:1, 5; 1Ba 9:19
Mib. 1:7Eb 15:18
Mib. 1:7Eb 15:16
Mib. 1:7Yos 12:2, 3
Mib. 1:7Yos 9:1, 2
Mib. 1:8Eb 26:3
Mib. 1:8Eb 28:13
Mib. 1:8Eb 12:7; 13:14, 15; 17:1, 7
Mib. 1:9Kob 18:17, 18
Mib. 1:10Eb 15:1, 5; Kob 32:13; Mit 26:51; Mib 10:22
Mib. 1:111Ba 3:8
Mib. 1:11Eb 12:1-3; 22:15, 17; 26:3, 4; Kob 23:25
Mib. 1:12Kob 18:17, 18; Mit 11:11; 20:3
Mib. 1:13Kob 18:21
Mib. 1:15Kob 18:25
Mib. 1:16Kob 23:8; Mib 16:18; Yn 7:24
Mib. 1:16Kob 22:21; Le 19:34; 24:22
Mib. 1:17Le 19:15; Ro 2:11
Mib. 1:17Kob 23:3
Mib. 1:17Mas 29:25
Mib. 1:172Nt 19:6
Mib. 1:17Kob 18:25, 26
Mib. 1:19Mit 10:12; Mib 8:14, 15; Yir 2:6
Mib. 1:19Mit 13:29
Mib. 1:19Mit 13:26
Mib. 1:21Kob 23:27; Mib 1:8
Mib. 1:22Mit 13:1, 2
Mib. 1:23Mit 13:3
Mib. 1:24Mit 13:17
Mib. 1:25Mit 13:23-27
Mib. 1:26Mit 14:1-4
Mib. 1:28Mit 32:9; Yos 14:7, 8
Mib. 1:28Mit 13:28, 33
Mib. 1:28Mit 13:22; Yos 11:21
Mib. 1:29Mit 14:9
Mib. 1:30Kob 14:14; Yos 10:42
Mib. 1:30Mit 14:22
Mib. 1:32Nz 78:22; 106:24; Ebr 3:16, 19; Yd 5
Mib. 1:33Kob 13:21; 40:36; Mit 10:33, 34; Nz 78:14
Mib. 1:34Mit 14:28, 35; 32:10-12; Mib 2:14; Nz 95:11; Ebr 3:11
Mib. 1:35Mit 14:29, 35; 1Ko 10:1, 5; Ebr 3:17
Mib. 1:36Mit 14:24; Yos 14:9
Mib. 1:37Mit 20:12; 27:13, 14; Mib 3:26; Nz 106:32
Mib. 1:38Kob 33:11; Mit 11:28
Mib. 1:38Mit 14:38
Mib. 1:38Mit 27:18; Mib 31:7; Yos 1:6, 9
Mib. 1:39Mit 14:3
Mib. 1:39Mit 14:30, 31
Mib. 1:40Mit 14:25
Mib. 1:41Mit 14:39-45
Mib. 1:42Le 26:14, 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
  • 46
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko 1:1-46

Kolimbola Mibeko

1 Talá maloba oyo Moize alobaki na Yisraele mobimba na etúká ya Yordani na esobe, na mokili patatalu oyo ekauká, oyo etalani na Sufe, kati na Parane, Tofele, Labane, Hazerote mpe Dizahabe. 2 Kobanda Horebe tii Kadeshe-barnea,+ na nzela ya Ngomba ya Seire, ezali mobembo ya mikolo 11. 3 Na mbula ya 40,+ na mokolo ya liboso ya sanza ya 11, Moize ayebisaki Bayisraele* makambo nyonso oyo Yehova atindaki ye ayebisa bango. 4 Yango esalemaki nsima ya kolonga Sihone+ mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone, mpe Oge+ mokonzi ya Bashane, oyo azalaki kofanda na Ashetarote, na Edrei.+ 5 Na etúká ya Yordani, na mokili ya Moabe, Moize abandaki kolimbola Mobeko oyo,+ mpe alobaki boye:

6 “Yehova Nzambe na biso ayebisaki biso na Horebe ete: ‘Bofandi mwa ntango molai na etúká oyo ya ngombangomba.+ 7 Bóbaluka mpe bókende na etúká ya ngombangomba ya Baamore+ mpe epai ya baoyo nyonso bazali penepene na bango na Araba,+ etúká ya ngombangomba, Shefela, Negebe mpe pembenipembeni ya mbu,+ na mokili ya Bakanana, mpe na Liban,*+ tii na ebale monene, ebale Efrate.+ 8 Talá, natye mokili yango liboso na bino. Bókɔta mpe bózwa mokili yango oyo Yehova alapaki ndai epai ya batata na bino, Abrahama, Yisaka+ mpe Yakobo,+ ete akopesa bango yango mpe libota* na bango.’+

9 “Mpe na ntango yango nalobaki na bino boye: ‘Nakokoka kotambwisa bino ngai moko te.+ 10 Yehova Nzambe na bino akómisi bino mingi, mpe talá, lelo oyo bozali ebele lokola minzoto ya likoló.+ 11 Tiká Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino akómisa bino ebele+ mbala nkóto koleka ndenge bozali, mpe apambola bino kaka ndenge apesaki bino elaka.+ 12 Ndenge nini nakokoka komema ngai moko kilo na bino, mokumba na bino mpe koswana na bino?+ 13 Bópona na mabota na bino mibali ya bwanya, ya mayele mpe oyo bayebi makambo mingi, mpe nakotya bango bakambi na bino.’+ 14 Boyanolaki ngai ete: ‘Likambo oyo olobi na biso tósala ezali malamu.’ 15 Bongo nazwaki bakambi ya mabota na bino, mibali ya bwanya mpe oyo bayebi makambo mingi, mpe natyaki bango bakambi na bino: bakonzi ya bato nkóto, bakonzi ya bato nkama, bakonzi ya bato ntuku mitano, bakonzi ya bato zomi, mpe bakapita ya mabota na bino.+

16 “Na ntango yango, nateyaki basambisi na bino ete: ‘Soki boyoki likambo kati na bandeko na bino, bosengeli kosambisa na bosembo+ kati na moto ná ndeko na ye to ná moto oyo afandi mopaya.+ 17 Bosengeli kopona bilongi te ntango bozali kosambisa.+ Bokoyoka moto moke ná moto monene ndenge moko.+ Moto moko te abangisa bino,+ mpo kosambisa ezali ya Nzambe;+ mpe soki likambo moko eleki mpenza makasi mpo na bino, bokoya na yango epai na ngai, mpe ngai nakoyoka yango.’+ 18 Na ntango yango, nateyaki bino makambo nyonso oyo bosengelaki kosala.

19 “Na nsima, tolongwaki na Horebe mpe totambolaki na esobe mobimba wana ya monene mpe ya nsɔmɔ,+ oyo bomonaki na nzela ya etúká ya ngombangomba ya Baamore,+ kaka ndenge Yehova Nzambe na biso apesaki biso mitindo, mpe nsukansuka, tokómaki na Kadeshe-barnea.+ 20 Bongo nalobaki na bino ete: ‘Bokómi na etúká ya ngombangomba ya Baamore, oyo Yehova Nzambe na biso azali kopesa biso. 21 Talá, Yehova Nzambe na yo apesi yo mokili yango. Matá, zwá yango, kaka ndenge Yehova, Nzambe ya bankɔkɔ na yo alobaki na yo.+ Kobanga te, kozala mpe na nsɔmɔ te.’

22 “Nzokande, bino nyonso bopusanaki epai na ngai mpe bolobaki ete: ‘Tótinda mibali liboso na biso bákende kotalela biso mokili yango malamumalamu mpe báya koyebisa biso nzela oyo tosengeli kokende mpe bingumba ya ndenge nini tokomona.’+ 23 Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, bongo naponaki mibali 12 kati na bino, mobali moko na libota moko.+ 24 Bongo balongwaki wana mpe bamataki na etúká ya ngombangomba+ mpe bakómaki tii na Lobwaku* ya Eshikole mpe banɔngaki yango. 25 Bazwaki ndambo ya mbuma ya mokili yango mpe bayaki na yango epai na biso, mpe bayebisaki biso ete: ‘Mokili oyo Yehova Nzambe na biso azali kopesa biso ezali malamu.’+ 26 Kasi boboyaki komata, mpe botombokaki, boboyaki etinda ya Yehova Nzambe na bino.+ 27 Bozalaki kaka koimaima na bahema na bino mpe koloba ete: ‘Yehova ayinaki biso, yango wana abimisaki biso na mokili ya Ezipito mpo na kopesa biso na lobɔkɔ ya Baamore, mpo na kosilisa biso nyɛɛ. 28 Tokokende na esika ya ndenge nini? Bandeko na biso balɛmbisi biso nzoto,*+ balobi: “Kuna tomonaki bato ya milai mpe oyo baleki biso na makasi, bingumba na bango ezali minene mpe ebatelami makasi tii na likoló*+ mpe kuna tomonaki bana ya Baanakime.”’+

29 “Bongo nalobaki na bino ete: ‘Bózala na nsɔmɔ na bango te mpe bóbanga bango te.+ 30 Yehova Nzambe na bino akotambola liboso na bino mpe akobundela bino,+ kaka ndenge asalaki na Ezipito, na miso na bino mpenza.+ 31 Mpe na esobe, esika nyonso oyo bokendaki tii bokómaki na esika oyo, bomonaki ndenge Yehova Nzambe na bino amemaki bino, lokola tata amemaka mwana na ye.’ 32 Atako bomonaki makambo wana nyonso, bondimelaki Yehova Nzambe na bino te,+ 33 oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika oyo bokotya kaa. Azalaki komonana na mɔtɔ na butu mpe na lipata na moi mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengeli kotambola.+

34 “Na ntango nyonso wana, Yehova ayokaki makambo oyo bozalaki koloba, mpe asilikaki mpe alapaki ndai ete:+ 35 ‘Mobali moko te kati na bato mabe ya ntango oyo akomona mokili malamu oyo nalapaki ndai ete nakopesa batata na bino,+ 36 longola kaka Kalebe mwana ya Yefune. Ye akomona yango, mpe nakopesa ye ná bana na ye mokili epai atambolaki, mpo atosaki Yehova na motema na ye mobimba.*+ 37 (Kutu Yehova asilikelaki ngai mpo na bino, mpe alobaki: “Yo mpe okokɔta kuna te.+ 38 Yosua, mwana ya Nunu, mosaleli na yo,*+ ye nde akokɔta na mokili yango.+ Kómisá ye makasi,*+ mpo akopesa Yisraele mokili yango lokola libula.”) 39 Lisusu, mpo na bana na bino oyo bolobaki ete bakokóma eloko ya kopunza+ mpe bana na bino oyo lelo bayebi te malamu to mabe, bango nde bakokɔta kuna, mpe nakopesa bango yango, mpo ekóma ya bango.+ 40 Kasi bino, bóbaluka mpe bókende na esobe, na nzela ya Mbu Motane.’+

41 “Na yango, bolobaki na ngai ete: ‘Tosaleli Yehova lisumu. Tokomata mpe tokobunda kaka ndenge Yehova Nzambe na biso apesi biso mitindo!’ Bongo moto na moto kati na bino azwaki bibundeli na ye ya etumba mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pɛtɛɛ komata na ngomba.+ 42 Kasi Yehova alobaki na ngai ete: ‘Lobá na bango boye: “Bosengeli komata te mpe kobunda te, mpo nakozala na kati na bino te.+ Soki bomeki, banguna na bino bakolonga bino.”’ 43 Bongo nalobaki na bino, kasi boyokaki te. Kutu, botombokaki, boboyaki etinda ya Yehova mpe na lofundo nyonso bolukaki komata na ngomba. 44 Bongo Baamore oyo bazalaki kofanda na ngomba yango babimaki kokutana na bino mpe babenganaki bino, kaka ndenge nzoi esalaka, mpe bapanzaki bino na Seire tii na Horoma. 45 Na yango, bozongaki mpe bobandaki kolela liboso ya Yehova, kasi Yehova ayokaki bino te, mpe atyelaki bino likebi te. 46 Yango wana, bokobaki kofanda na Kadeshe mikolo ebele.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto