Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Ezekiele alei rulo oyo Nzambe apesi ye (1-15)

      • Ezekiele atyami lokola sinzili (16-27)

        • Bopɔtu ememisaka moto ngambo ya makila (18-21)

Ezekiele 3:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lyá oyo ozali komona.”

Mitindami

  • +Em 10:9, 10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala,

    6/2017, lok. 5

Ezekiele 3:3

Mitindami

  • +Nz 119:103; Yir 15:16; Em 10:9, 10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala,

    6/2017, lok. 5

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2008, lok. 8

    1/7/2007, lok. 12

    15/9/1994, lok. 11

    15/3/1991, nk. 15-16

Ezekiele 3:6

Mitindami

  • +Yon 3:4, 5; Mt 11:21

Ezekiele 3:7

Mitindami

  • +Lk 10:16
  • +Kob 34:9; Yir 3:3; 5:3

Ezekiele 3:8

Mitindami

  • +Yir 1:18, 19; 15:20; Mik 3:8

Ezekiele 3:9

Mitindami

  • +Yis 50:7
  • +Yir 17:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/1991, lok. 31

Ezekiele 3:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na bana ya bato na yo.”

Mitindami

  • +2Ba 24:12, 14
  • +Ezk 2:5

Ezekiele 3:12

Mitindami

  • +Ezk 8:3

Ezekiele 3:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bayiká.”

Mitindami

  • +Ezk 1:24
  • +Ezk 10:16

Ezekiele 3:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na nkanda makasi ya elimo na ngai.”

Ezekiele 3:15

Mitindami

  • +Ezk 1:3
  • +Yir 23:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, lok. 13

Ezekiele 3:17

Mitindami

  • +Yis 21:8; 62:6; Yir 6:17
  • +Yis 58:1; Ezk 33:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 137

Ezekiele 3:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nakosɛnga yo makila na ye.”

Mitindami

  • +Mis 2:40; 1Ti 4:16
  • +Ezk 33:4
  • +Ezk 33:8

Ezekiele 3:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo.”

Mitindami

  • +Ezk 33:9; Mis 18:6; 20:26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 15

Ezekiele 3:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “asali makambo ya kozanga bosembo.”

  • *

    To, “makila na ye ekozala na motó na yo.”

Mitindami

  • +Ezk 18:24, 26; 33:12, 18
  • +Le 19:17; Ezk 33:6; Ebr 13:17

Ezekiele 3:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

Mitindami

  • +Mas 17:10; Ezk 33:14, 15; Yk 5:19, 20

Ezekiele 3:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ ya Yehova eyaki epai na ngai.”

Ezekiele 3:23

Mitindami

  • +Ezk 1:27, 28
  • +Ezk 1:1

Ezekiele 3:24

Mitindami

  • +Ezk 2:2; Da 10:19

Ezekiele 3:26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2003, lok. 29

Ezekiele 3:27

Mitindami

  • +Ezk 24:27; 33:22
  • +Mt 11:15
  • +Yis 30:9

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 3:1Em 10:9, 10
Ezk. 3:3Nz 119:103; Yir 15:16; Em 10:9, 10
Ezk. 3:6Yon 3:4, 5; Mt 11:21
Ezk. 3:7Lk 10:16
Ezk. 3:7Kob 34:9; Yir 3:3; 5:3
Ezk. 3:8Yir 1:18, 19; 15:20; Mik 3:8
Ezk. 3:9Yis 50:7
Ezk. 3:9Yir 17:18
Ezk. 3:112Ba 24:12, 14
Ezk. 3:11Ezk 2:5
Ezk. 3:12Ezk 8:3
Ezk. 3:13Ezk 1:24
Ezk. 3:13Ezk 10:16
Ezk. 3:15Ezk 1:3
Ezk. 3:15Yir 23:9
Ezk. 3:17Yis 21:8; 62:6; Yir 6:17
Ezk. 3:17Yis 58:1; Ezk 33:7
Ezk. 3:18Mis 2:40; 1Ti 4:16
Ezk. 3:18Ezk 33:4
Ezk. 3:18Ezk 33:8
Ezk. 3:19Ezk 33:9; Mis 18:6; 20:26
Ezk. 3:20Ezk 18:24, 26; 33:12, 18
Ezk. 3:20Le 19:17; Ezk 33:6; Ebr 13:17
Ezk. 3:21Mas 17:10; Ezk 33:14, 15; Yk 5:19, 20
Ezk. 3:23Ezk 1:27, 28
Ezk. 3:23Ezk 1:1
Ezk. 3:24Ezk 2:2; Da 10:19
Ezk. 3:27Ezk 24:27; 33:22
Ezk. 3:27Mt 11:15
Ezk. 3:27Yis 30:9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 3:1-27

Ezekiele

3 Bongo alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, lyá oyo ezali liboso na yo.* Lyá rulo oyo, mpe kende koloba na bato ya Yisraele.”+

2 Na yango nafungolaki monɔkɔ na ngai, mpe aleisaki ngai rulo yango. 3 Alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, lyá rulo oyo nazali kopesa yo, mpe tondisá libumu na yo na yango.” Nabandaki kolya yango mpe ezalaki elɛngi na monɔkɔ na ngai lokola mafuta ya nzoi.+

4 Alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto, kende epai ya bato ya Yisraele, mpe yebisá bango maloba na ngai. 5 Mpo otindami te epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ oyo ozali kokanga ntina te to oyo eyebani te, kasi nde epai ya bato ya Yisraele. 6 Ezali te epai ya bato ebele ya bikólo oyo balobaka monɔkɔ oyo ozali kokanga ntina te to oyo eyebani te, oyo okoki te kokanga ntina ya maloba na bango. Soki ezalaka epai na bango nde natindaki yo, bango balingaki koyoka yo.+ 7 Kasi bato ya Yisraele, bakoboya koyoka yo, mpo bazali na mposa ya koyoka ngai te,+ bato nyonso ya Yisraele bazali motó makasi mpe motema makasi.+ 8 Talá! Nakómisi elongi na yo makasi lokola bilongi na bango mpe motó na yo makasi lokola mitó na bango.+ 9 Nakómisi motó na yo lokola diama, makasi koleka libanga ya silekisi.+ Kobanga bango te, mpe bilongi na bango elɛngisa yo te,+ mpo bazali batomboki.”

10 Alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, yoká maloba nyonso oyo nakoyebisa yo, mpe tyá yango na motema na yo. 11 Kende koloba na bato na yo* oyo bamemamaki na mboka mopaya.+ Báyoka to te, yebisá bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’”+

12 Elimo ememaki ngai+ mpe nayokaki na nsima na ngai lokito ya konguluma makasi mpenza oyo ezalaki koloba ete: “Nkembo ya Yehova esanzolama uta na esika na ye.” 13 Ezalaki na lokito ya mapapu ya bikelamu ya bomoi oyo ezalaki kotutana moko na mosusu,+ lokito ya bapine ya ebende* oyo ezalaki penepene na bango,+ mpe lokito ya konguluma ya makasi mpenza. 14 Elimo ememaki ngai, ezwaki ngai, mpe nakendaki na bololo mpe na nkanda makasi,* mpe elimo ya Yehova ezalaki kosala na kati na ngai na ndenge moko ya nguya. 15 Bongo nakɔtaki na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya na Tele-abibe, baoyo bazalaki pene na ebale Kebare,+ mpe nafandaki kuna esika bazalaki kofanda; mpe nafandaki na kati na bango mikolo nsambo, nazalaki kaka kokamwa.+

16 Na nsuka ya mikolo nsambo, Yehova alobaki na ngai ete:

17 “Mwana ya moto, natye yo sinzili mpo na bato ya Yisraele,+ mpe soki oyoki maloba oyo euti na monɔkɔ na ngai, osengeli kokebisa bango mpo na ngai.+ 18 Soki nalobi na moto mabe ete: ‘Okokufa mpenza,’ kasi okebisi ye te mpe olobi te mpo na kokebisa moto mabe mpo atika nzela na ye ya mabe mpo atikala na bomoi,+ akokufa na libunga na ye mpo azali moto mabe,+ kasi makila na ye ekozala na motó na yo.*+ 19 Nzokande, soki okebisi moto mabe, mpe ye atiki mabe na ye te mpe atiki te etamboli na ye ya mabe, akokufa mpo na libunga na ye, kasi okobikisa mpenza bomoi na yo.*+ 20 Soki moto ya sembo* atiki bosembo* na ye mpe asali oyo ezali mabe,* nakotya liboso na ye eloko oyo ebɛtisaka libaku, mpe akokufa.+ Soki okebisaki ye te, akokufa mpo na lisumu na ye, mpe misala na ye ya bosembo ekokanisama te, kasi nakosɛnga yo makila na ye.*+ 21 Nzokande, soki okebisi moto ya sembo mpo asala lisumu te, mpe asali lisumu te, akotikala mpenza na bomoi mpo akebisamaki,+ mpe yo okobikisa bomoi* na yo.”

22 Kuna nguya ya Yehova esalaki kati na ngai* mpe alobaki na ngai boye: “Tɛlɛmá, kende na lobwaku patatalu, mpe nakoloba na yo kuna.” 23 Bongo natɛlɛmaki mpe nakendaki na lobwaku patatalu, mpe talá! nkembo ya Yehova ezalaki wana,+ lokola nkembo oyo namonaki pene na ebale Kebare,+ mpe nakweaki elongi na nse. 24 Na nsima, elimo ekɔtaki kati na ngai mpe esalaki ete natɛlɛma.+ Nzambe alobaki na ngai mpe ayebisaki ngai boye:

“Kende komikanga na kati ya ndako na yo. 25 Nde yo, mwana ya moto! bakotya yo bansinga mpe bakokanga yo yango mpo obima liboso na bango te. 26 Mpe nakosala ete lolemo na yo, ekangama na monɔkɔ na yo, mpe okokóma baba, okokoka te kopamela bango, mpo bazali batomboki. 27 Kasi ntango nakoloba na yo, nakofungola monɔkɔ na yo, mpe osengeli koloba na bango ete:+ ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’ Moto oyo azali koyoka ayoka,+ mpe moto oyo azali koboya koyoka aboya, mpo bazali batomboki.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto