Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Yehova ameki Yisraele (1-6)

      • Otiniele, mosambisi ya liboso (7-11)

      • Mosambisi Ehude abomi Mokonzi Eglone, moto ya nzoto minene (12-30)

      • Mosambisi Shamagare (31)

Basambisi 3:1

Mitindami

  • +Mib 8:2; Bas 2:10

Basambisi 3:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔtelo ya Hamate.”

Mitindami

  • +Bas 1:18, 19
  • +Yos 13:1, 4; Bas 1:31
  • +Yos 9:1, 2
  • +Yos 13:1, 6
  • +Mit 34:2, 8; Yos 13:1, 5

Basambisi 3:4

Mitindami

  • +Kob 23:33; Bas 2:21, 22

Basambisi 3:5

Mitindami

  • +Bas 1:29; Nz 106:34

Basambisi 3:6

Mitindami

  • +Kob 34:15, 16; Mit 25:1, 2; Mib 7:3, 4; 1Ba 11:1, 4

Basambisi 3:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 31:16; Bas 2:11; 10:6
  • +Kob 34:13; Mib 12:3; 16:21

Basambisi 3:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Arame-naharaime.”

Basambisi 3:9

Mitindami

  • +Mib 4:30; Bas 10:10, 15
  • +Bas 2:16, 18; 3:15
  • +1Nt 4:13

Basambisi 3:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Arame.”

Mitindami

  • +Mit 11:16, 17; Bas 6:34; 11:29; 14:5, 6; 15:14; 1Sa 11:6; 16:13; 2Nt 15:1

Basambisi 3:12

Mitindami

  • +Bas 2:19
  • +Eb 19:36, 37

Basambisi 3:13

Mitindami

  • +Eb 19:36, 38; Bas 11:4, 5
  • +Kob 17:8; Bas 6:3
  • +Mib 34:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1997, lok. 29

Basambisi 3:14

Mitindami

  • +Mib 28:48

Basambisi 3:15

Mitindami

  • +Nz 78:34
  • +Bas 3:9
  • +Bas 4:1
  • +Eb 49:27
  • +Bas 20:15, 16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, nk. 29-30

    15/3/1997, lok. 29

Basambisi 3:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu lipeko ya mokuse oyo ezalaki na bolai ya 38 cm. Talá Ap. B14.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, lok. 30

    15/3/1997, nk. 29-30

Basambisi 3:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1997, lok. 30

Basambisi 3:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “atikaki.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, lok. 30

    15/3/1997, lok. 30

Basambisi 3:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “bisika oyo batimolaka mabanga.”

Mitindami

  • +Yos 4:19; 5:8, 9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, lok. 30

    15/3/1997, lok. 30

Basambisi 3:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, lok. 30

    15/3/1997, lok. 30

Basambisi 3:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2005, lok. 26

    15/3/1997, lok. 30

Basambisi 3:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, lok. 30

Basambisi 3:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “lidusu ya kokɔtisa mopɛpɛ.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, nk. 30-31

    15/3/1997, nk. 30-31

Basambisi 3:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kozipa makolo na ye.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, nk. 30-31

    15/3/1997, nk. 30-31

Basambisi 3:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mabele.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1997, lok. 31

Basambisi 3:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “bisika oyo batimolaka mabanga.”

Mitindami

  • +Bas 3:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1997, lok. 31

Basambisi 3:27

Mitindami

  • +Bas 6:34; 1Sa 13:3
  • +Bas 7:24

Basambisi 3:28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2004, lok. 31

Basambisi 3:29

Mitindami

  • +Mib 28:7
  • +Le 26:7, 8

Basambisi 3:30

Mitindami

  • +Bas 3:11

Basambisi 3:31

Mitindami

  • +Bas 5:6
  • +Yos 13:1, 2
  • +Bas 15:3, 15; 1Sa 17:47, 50

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 3:1Mib 8:2; Bas 2:10
Bas. 3:3Bas 1:18, 19
Bas. 3:3Yos 13:1, 4; Bas 1:31
Bas. 3:3Yos 9:1, 2
Bas. 3:3Yos 13:1, 6
Bas. 3:3Mit 34:2, 8; Yos 13:1, 5
Bas. 3:4Kob 23:33; Bas 2:21, 22
Bas. 3:5Bas 1:29; Nz 106:34
Bas. 3:6Kob 34:15, 16; Mit 25:1, 2; Mib 7:3, 4; 1Ba 11:1, 4
Bas. 3:7Mib 31:16; Bas 2:11; 10:6
Bas. 3:7Kob 34:13; Mib 12:3; 16:21
Bas. 3:9Mib 4:30; Bas 10:10, 15
Bas. 3:9Bas 2:16, 18; 3:15
Bas. 3:91Nt 4:13
Bas. 3:10Mit 11:16, 17; Bas 6:34; 11:29; 14:5, 6; 15:14; 1Sa 11:6; 16:13; 2Nt 15:1
Bas. 3:12Bas 2:19
Bas. 3:12Eb 19:36, 37
Bas. 3:13Eb 19:36, 38; Bas 11:4, 5
Bas. 3:13Kob 17:8; Bas 6:3
Bas. 3:13Mib 34:3
Bas. 3:14Mib 28:48
Bas. 3:15Nz 78:34
Bas. 3:15Bas 3:9
Bas. 3:15Bas 4:1
Bas. 3:15Eb 49:27
Bas. 3:15Bas 20:15, 16
Bas. 3:19Yos 4:19; 5:8, 9
Bas. 3:26Bas 3:19
Bas. 3:27Bas 6:34; 1Sa 13:3
Bas. 3:27Bas 7:24
Bas. 3:29Mib 28:7
Bas. 3:29Le 26:7, 8
Bas. 3:30Bas 3:11
Bas. 3:31Bas 5:6
Bas. 3:31Yos 13:1, 2
Bas. 3:31Bas 15:3, 15; 1Sa 17:47, 50
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 3:1-31

Basambisi

3 Talá bikólo oyo Yehova atikaki mpo na komeka Bayisraele nyonso oyo bamonaki ata etumba moko te na bitumba ya Kanana+ 2 (yango ezalaki mpo mabota ya Bayisraele oyo ekoya nsima eyeba soki etumba ezali nini, baoyo bamonaki naino makambo ya ndenge wana te liboso): 3 bankolo mitano ya Bafilistia,+ ná Bakanana nyonso, Basidone,+ mpe Bahivi+ oyo bazalaki kofanda na Ngomba ya Liban,+ banda na Ngomba Baala-heremone tii na Lebo-hamate.*+ 4 Bazalaki kosalelama mpo na komeka Yisraele, mpe mpo na koyeba soki Yisraele ekotosa mitindo oyo Yehova apesaki batata na bango na nzela ya Moize.+ 5 Bongo Bayisraele bafandaki na kati ya Bakanana,+ Bahiti, Baamore, Baperizi, Bahivi ná Bayebusi. 6 Bakómaki kobala bana basi ya bikólo wana, mpe kobalisa bana na bango ya basi epai ya bana mibali ya bikólo yango. Mpe babandaki kosalela banzambe na bango.+

7 Na yango, Bayisraele basalaki makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpe babosanaki Yehova Nzambe na bango mpe bakómaki kosalela Babaala+ mpe banzete ya losambo.*+ 8 Bongo nkanda ya Yehova engalelaki Yisraele, mpe atɛkaki bango na lobɔkɔ ya Kushane-rishataime mokonzi ya Mezopotamia.* Bayisraele basalelaki Kushane-rishataime mbula mwambe. 9 Ntango Bayisraele babelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi,+ Yehova abimiselaki Bayisraele mobikisi moko mpo na kobikisa bango:+ Otiniele+ mwana ya Kenaze, leki ya Kalebe. 10 Elimo ya Yehova esalaki epai na ye,+ mpe akómaki mosambisi ya Yisraele. Ntango akendaki na etumba, Yehova apesaki Kushane-rishataime mokonzi ya Mezopotamia* na lobɔkɔ na ye, bongo alongaki Kushane-rishataime. 11 Mpe mokili yango ekómaki na kimya mbula 40. Na nsima, Otiniele mwana ya Kenaze akufaki.

12 Mpe Bayisraele bakómaki lisusu kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova.+ Na yango, Yehova atikaki Eglone, mokonzi ya Moabe,+ alonga Yisraele mpo basalaki makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova. 13 Lisusu, atindaki Baamone+ ná Baamaleke+ mpo bábundisa bango. Babundisaki Yisraele mpe bazwaki engumba ya banzete ya mbila.+ 14 Bayisraele basalelaki Eglone, mokonzi ya Moabe mbula 18.+ 15 Mpe Bayisraele babelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi.+ Na yango Yehova abimiselaki bango mobikisi moko:+ Ehude+ mwana ya Gera, Mobenyamina+ moko oyo azalaki kosalela lobɔkɔ ya mwasi.+ Nsima ya mwa ntango, Bayisraele batindelaki Eglone mokonzi ya Moabe mpako na nzela na ye. 16 Na ntango yango, Ehude asalaki mopanga moko ya mino mibale, mpe bolai na yango ezalaki lipeko moko.* Akangisaki yango na mokaba na nse ya elamba na ye, na mopanzi ya lokolo na ye ya mobali. 17 Na nsima, apesaki Eglone mokonzi ya Moabe mpako yango. Eglone azalaki moto ya nzoto monene mpenza.

18 Ntango Ehude asilisaki kopesa mpako, akendaki elongo na* bato oyo bamemaki mpako yango. 19 Kasi ntango akómaki na esika ya bikeko oyo basalá na mabanga* pene ya Gilgale,+ azongaki ye moko mpe alobaki na mokonzi boye: “Ee mokonzi, nazali na nsango moko ya koyebisa yo, ezali sekele.” Bongo mokonzi alobaki: “Bófanda nyɛɛ!” Na yango basaleli na ye nyonso babimaki libándá. 20 Bongo Ehude apusanaki epai ya mokonzi, wana afandaki ye moko na shambrɛ na ye ya malili oyo ezalaki na nsamba. Na nsima Ehude alobaki: “Nsango oyo nazali na yango mpo na yo euti epai ya Nzambe.” Na yango, atɛlɛmaki na kiti na ye ya bokonzi. 21 Bongo Ehude abendaki na lobɔkɔ na ye ya mwasi mopanga oyo ezalaki na mopanzi ya lokolo na ye ya mobali mpe atɔbɔlaki yango mokonzi na libumu. 22 Esimbeli ya mopanga mpe ekɔtaki nsima ya ebende na yango, mpe mafuta ezipaki ebende, mpo abimisaki mopanga yango na libumu na ye te, mpe nyɛi ebimaki. 23 Ehude abimaki na ekɔtelo ya veranda,* abendaki baporte ya shambrɛ yango ya nsamba mpe akangaki yango na fungola. 24 Wana asilaki kobima, basaleli ya mokonzi bazongaki mpe bamonaki ete baporte ya shambrɛ oyo ezalaki likoló ya nsamba ekangamaki na fungola. Bongo balobaki: “Mbala mosusu akei na kabinɛ* na shambrɛ ya malili oyo ezali na kati.” 25 Bazalaki kaka kozela tii bakómaki komitungisa, mpe ntango bamonaki ete azalaki kaka kofungola te baporte ya shambrɛ oyo ezalaki likoló ya nsamba, bazwaki fungola mpe bafungolaki baporte yango, mpe bakutaki nkolo na bango alali na nse,* akufi!

26 Wana bazalaki kolekisa ntango, Ehude akimaki; alekaki pene na esika ya bikeko oyo basalá na mabanga*+ mpe akómaki na Seira. 27 Ntango akómaki kuna, ayulaki liseke+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime;+ mpe Bayisraele bakitaki na etúká ya ngombangomba, mpe Ehude azalaki kokamba bango. 28 Na nsima alobaki na bango: “Bólanda ngai, mpo Yehova apesi banguna na bino, Bamoabe, na lobɔkɔ na bino.” Bongo balandaki ye, bakangaki bisika ya kokatisa Yordani na makolo mpo Bamoabe bákima te, mpe batikaki ata moto moko te akatisa. 29 Na ntango yango, babomaki Bamoabe soki 10 000;+ bango nyonso bazalaki mibali ya makasi mpe ya mpiko. Ata moto moko te akimaki.+ 30 Bongo banda mokolo wana, Bamoabe bakómaki na nse ya bokonzi ya Yisraele; mpe mokili yango ekómaki na kimya mbula 80.+

31 Nsima ya Ehude ezalaki Shamagare+ mwana ya Anate, oyo abomaki Bafilistia, mibali 600,+ na lingenda ya kotambwisa bangɔmbɛ;+ ye mpe abikisaki Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto