Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Biloko mosusu oyo Salomo atongaki (1-11)

      • Losambo na tempelo ebongisami (12-16)

      • Bamasuwa ya Salomo (17, 18)

2 Ntango 8:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndako ya mokonzi.”

Mitindami

  • +1Ba 6:37, 38; 7:1; 9:10

2 Ntango 8:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana ya Yisraele.”

Mitindami

  • +1Ba 5:1

2 Ntango 8:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “atongaki lisusu.”

Mitindami

  • +1Ba 9:17-19
  • +2Ba 14:28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/1999, nk. 28-29

2 Ntango 8:5

Mitindami

  • +Yos 16:5
  • +Yos 16:1, 3; 1Nt 7:24

2 Ntango 8:6

Mitindami

  • +Yos 19:44, 48
  • +1Ba 4:26

2 Ntango 8:7

Mitindami

  • +Eb 15:18-21; Mit 13:29
  • +1Ba 9:20-23

2 Ntango 8:8

Mitindami

  • +Yos 15:63; 17:12
  • +Yos 16:10; 2Nt 2:17, 18

2 Ntango 8:9

Mitindami

  • +Le 25:39
  • +1Sa 8:11, 12

2 Ntango 8:10

Mitindami

  • +1Ba 5:16; 9:23; 2Nt 2:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 19

2 Ntango 8:11

Mitindami

  • +1Ba 3:1
  • +1Ba 7:8; 9:24
  • +Kob 29:43

2 Ntango 8:12

Mitindami

  • +Le 1:3
  • +2Nt 4:1
  • +1Ba 6:3

2 Ntango 8:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bandako mpo na mwa ntango.”

Mitindami

  • +Mit 28:9
  • +Mit 28:11-15
  • +Mib 16:16
  • +Le 23:6
  • +Le 23:15, 16
  • +Le 23:34

2 Ntango 8:14

Mitindami

  • +1Nt 24:1
  • +1Nt 6:31, 32; 15:16; 16:37, 42; 25:1
  • +1Nt 26:1

2 Ntango 8:16

Mitindami

  • +1Ba 6:1
  • +1Ba 7:51

2 Ntango 8:17

Mitindami

  • +Mit 33:1, 35; 1Ba 22:48
  • +Mib 2:8; 2Ba 14:21, 22; 16:6
  • +1Ba 9:26-28

2 Ntango 8:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +2Sa 5:11
  • +1Ba 22:48; Nz 45:9
  • +1Ba 10:22
  • +Mos 2:8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 8:11Ba 6:37, 38; 7:1; 9:10
2 Nt. 8:21Ba 5:1
2 Nt. 8:41Ba 9:17-19
2 Nt. 8:42Ba 14:28
2 Nt. 8:5Yos 16:5
2 Nt. 8:5Yos 16:1, 3; 1Nt 7:24
2 Nt. 8:6Yos 19:44, 48
2 Nt. 8:61Ba 4:26
2 Nt. 8:7Eb 15:18-21; Mit 13:29
2 Nt. 8:71Ba 9:20-23
2 Nt. 8:8Yos 15:63; 17:12
2 Nt. 8:8Yos 16:10; 2Nt 2:17, 18
2 Nt. 8:9Le 25:39
2 Nt. 8:91Sa 8:11, 12
2 Nt. 8:101Ba 5:16; 9:23; 2Nt 2:18
2 Nt. 8:111Ba 3:1
2 Nt. 8:111Ba 7:8; 9:24
2 Nt. 8:11Kob 29:43
2 Nt. 8:12Le 1:3
2 Nt. 8:122Nt 4:1
2 Nt. 8:121Ba 6:3
2 Nt. 8:13Mit 28:9
2 Nt. 8:13Mit 28:11-15
2 Nt. 8:13Mib 16:16
2 Nt. 8:13Le 23:6
2 Nt. 8:13Le 23:15, 16
2 Nt. 8:13Le 23:34
2 Nt. 8:141Nt 24:1
2 Nt. 8:141Nt 6:31, 32; 15:16; 16:37, 42; 25:1
2 Nt. 8:141Nt 26:1
2 Nt. 8:161Ba 6:1
2 Nt. 8:161Ba 7:51
2 Nt. 8:17Mit 33:1, 35; 1Ba 22:48
2 Nt. 8:17Mib 2:8; 2Ba 14:21, 22; 16:6
2 Nt. 8:171Ba 9:26-28
2 Nt. 8:182Sa 5:11
2 Nt. 8:181Ba 22:48; Nz 45:9
2 Nt. 8:181Ba 10:22
2 Nt. 8:18Mos 2:8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 8:1-18

Mokanda ya mibale ya Ntango

8 Salomo asalaki mbula 20 mpo na kotonga ndako ya Yehova mpe ndako na ye moko.*+ 2 Nsima na yango, Salomo atongaki lisusu bingumba oyo Hirame+ apesaki ye mpe atyaki Bayisraele* kuna. 3 Lisusu, Salomo akendaki na Hamate-soba mpe azwaki engumba yango. 4 Na nsima akómisaki makasi* engumba Tadamore, na esobe, mpe bingumba nyonso ya kobomba biloko+ oyo atongaki na Hamate.+ 5 Akómisaki mpe makasi bingumba Bete-horone ya Likoló+ mpe Bete-horone ya Nse,+ bingumba oyo ebatelami makasi na bifelo, baporte ná bikangiseli, 6 mpe Baalate+ ná bingumba nyonso ya kobomba biloko ya Salomo, bingumba nyonso ya makalo+ ná bingumba ya bato oyo batambolaka na mpunda, mpe nyonso oyo Salomo azalaki na mposa ya kotonga na Yerusaleme, na Liban, mpe na mokili mobimba ya boyangeli na ye.

7 Mpe mpo na bato nyonso oyo batikalaki kati na Bahiti, Baamore, Baperizi, Bahivi ná Bayebusi,+ oyo bazalaki bato ya Yisraele te,+ 8 bakitani na bango oyo batikalaki na mokili yango, baoyo Bayisraele basilisaki te,+ Salomo akómaki kosalisa bango misala ya makasi tii na mokolo ya lelo.+ 9 Kasi Salomo akómisaki ata Moyisraele moko te moombo, mpo na mosala na ye;+ mpo bazalaki basoda na ye, bakonzi ya bakomanda-basungi na ye, mpe bakonzi ya batambwisi-makalo na ye mpe ya bato na ye oyo batambolaka na mpunda.+ 10 Bakonzi ya bakambi oyo Mokonzi Salomo atyaki, oyo bazalaki kokamba bato,+ bazalaki 250.

11 Salomo alongolaki mpe mwana mwasi ya Farao+ na Sité ya Davidi mpe akendaki na ye na ndako oyo atongelaki ye,+ mpo alobaki: “Atako azali mwasi na ngai, asengeli te kofanda na ndako ya Davidi mokonzi ya Yisraele, mpo bisika oyo Sanduku ya Yehova eyei ezali mosantu.”+

12 Na nsima Salomo apesaki Yehova bambeka ya kotumba+ likoló ya etumbelo+ ya Yehova oyo atongaki liboso ya ndako ya kokɔtela.+ 13 Azalaki kosala makambo oyo esengelaki kosalema mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa makabo na kolanda mitindo oyo Moize apesaki mpo na Basabata,+ basanza ya sika+ mpe bafɛti misato ya mbula:+ fɛti ya Mampa oyo ezangá levire,+ fɛti ya Bapɔsɔ,+ mpe fɛti ya Bandako ya matiti.*+ 14 Lisusu na kolanda mobeko ya tata na ye Davidi, atyaki bituluku ya banganga-nzambe+ na misala na bango, mpe Balevi na bisika na bango ya mosala, mpo na kosanzola Nzambe+ mpe kosala liboso ya banganga-nzambe na kolanda makambo oyo esengelaki kosalema mokolo na mokolo. Atyaki mpe bakɛngɛli ya baporte na bituluku na bango mpo na baporte ndenge na ndenge,+ mpo yango nde ezalaki mitindo ya Davidi moto ya Nzambe ya solo. 15 Mpe batikaki te kolanda mitindo oyo mokonzi apesaki banganga-nzambe mpe Balevi na likambo nyonso to mpo na bandako ya kobomba biloko. 16 Na yango misala nyonso ya Salomo ebongisamaki malamu, banda mokolo oyo batyaki moboko ya ndako ya Yehova+ tii ntango esilaki. Na ndenge wana nde ndako ya Yehova esilaki.+

17 Na ntango yango nde Salomo akendaki na Ezione-gebere+ mpe na Elote,+ na bokula ya mbu, na mokili ya Edome.+ 18 Hirame+ atindelaki Salomo na nzela ya basaleli na ye, bamasuwa ná bamatelo oyo bayebi mpenza makambo ya mbu. Bakendaki na Ofire+ elongo na basaleli ya Salomo mpe kuna bazwaki talanta* 450 ya wolo,+ mpe bamemelaki yango Mokonzi Salomo.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto