Yobo
3 Nabondeli yo, ndimá ndanga na ngai, mpe batelá yango epai na yo.
Nani mosusu akotuta ntolo mpe akondima kokɔtela ngai?+
5 Bato mosusu bapesaka baninga na bango ndambo ya biloko,
Nzokande miso ya bana na bango ekolɛmba.
6 Akómisi ngai eloko ya kotyola* na kati ya bato ya bikólo,+
Bongo nakómi moto ya kobwakela nsoi na elongi.+
8 Bato ya sembo bazali kotala yango na kokamwa,
Moto oyo azali na likambo te azali kosilika mpo na moto oyo abangaka Nzambe te.*
9 Moto ya sembo azali kokangama makasi na nzela na ye,+
Mpe moto ya mabɔkɔ pɛto azali kokóma makasi.+
10 Kasi, bino nyonso bokoki kozongela koloba,
Mpo namoni ata moto moko te ya bwanya na kati na bino.+
12 Bazali kaka kotya butu na esika ya moi,
Bazali koloba: ‘Pole ekómi pene mpo molili eyei.’
14 Nakobelela libulu*+ ete: ‘Ozali tata na ngai!’
Mpe nkusu ete: ‘Ozali mama na ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi!’
15 Bongo elikya na ngai ezali wapi?+
Nani akoki komona elikya na ngai?