Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Lingenda ya Arona ebimisi nkasa ya sika (1-13)

Mitángo 17:2

Mitindami

  • +Mit 1:4, 16

Mitángo 17:4

Mitindami

  • +Kob 34:29
  • +Kob 25:22; 30:36; Le 16:2

Mitángo 17:5

Mitindami

  • +Mit 16:5
  • +Mit 11:1; 14:27; 16:11; 1Ko 10:6, 10
  • +Mit 14:2; 16:13, 41

Mitángo 17:10

Mitindami

  • +Ebr 9:4
  • +Mit 16:38
  • +Mib 9:7; 31:27

Mitángo 17:13

Mitindami

  • +Mit 1:51; 18:4, 7
  • +Mit 16:49

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 17:2Mit 1:4, 16
Mit. 17:4Kob 34:29
Mit. 17:4Kob 25:22; 30:36; Le 16:2
Mit. 17:5Mit 16:5
Mit. 17:5Mit 11:1; 14:27; 16:11; 1Ko 10:6, 10
Mit. 17:5Mit 14:2; 16:13, 41
Mit. 17:10Ebr 9:4
Mit. 17:10Mit 16:38
Mit. 17:10Mib 9:7; 31:27
Mit. 17:13Mit 1:51; 18:4, 7
Mit. 17:13Mit 16:49
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 17:1-13

Mitángo

17 Sikoyo Yehova alobaki na Moize boye: 2 “Lobá na Bayisraele mpe zwá epai na bango lingenda moko mpo na libota mokomoko, epai ya bankumu na bango nyonso, na kolanda libota+ na bango, nyonso ekozala mangenda 12. Komá nkombo ya mokomoko likoló ya lingenda na ye. 3 Okokoma nkombo ya Arona likoló ya lingenda ya Levi, mpo lingenda ezali kaka moko mpo na nkumu ya libota mokomoko. 4 Tyá mangenda na kati ya hema ya kokutana liboso ya Litatoli,+ epai namimonisaka mbala na mbala epai na bino.+ 5 Mpe lingenda ya moto oyo nakopona,+ ekobimisa nkasa ya sika, mpe nakosukisa mpenza koimaima ya Bayisraele oyo bazali koimaima mpo na ngai,+ oyo bazali mpe koimaima mpo na bino.”+

6 Bongo Moize alobaki na Bayisraele, mpe bankumu na bango nyonso bapesaki ye mangenda—lingenda moko mpo na nkumu mokomoko ya libota na bango, nyonso mangenda 12 —mpe lingenda ya Arona ezalaki na kati ya mangenda na bango. 7 Na nsima, Moize atyaki mangenda yango liboso ya Yehova na kati ya hema ya Litatoli.

8 Na mokolo oyo elandaki, ntango Moize akɔtaki na hema ya Litatoli, talá! lingenda ya Arona mpo na ndako ya Levi ebimisaki nkasa ya sika, mpe ezalaki kobimisa nkasa ya sika ná bafololo mpe ebotaki mbuma ya amande oyo eteli. 9 Bongo Moize alongolaki mangenda nyonso liboso ya Yehova mpe abimisaki yango libándá epai ya bato nyonso ya Yisraele. Batalaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye moko.

10 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Zongisá lingenda ya Arona+ liboso ya Litatoli ezala eloko oyo esengeli kobatelama lokola elembo+ mpo na bana ya botomboki,+ mpo koimaima na bango esila liboso na ngai mpe mpo bákufa te.” 11 Na mbala moko, Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.

12 Mpe Bayisraele balobaki na Moize ete: “Sikoyo tokokufa, tokokufa mpenza, biso nyonso tokokufa mpenza. 13 Moto nyonso oyo akopusana ata pene na tabernakle ya Yehova, akokufa!+ Tosengeli nde kosila na kokufa ndenge wana?”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto