Yosua
4 Ntango kaka ekólo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yehova alobaki na Yosua boye: 2 “Zwá mibali 12 na kati ya bato, mobali moko na libota moko,+ 3 mpe pesá bango mitindo oyo: ‘Bózwa mabanga 12 na katikati ya Yordani, na esika oyo makolo ya banganga-nzambe etɛlɛmaki,+ mpe bómema yango elongo na bino mpe bótya yango na esika oyo bokolala na butu.’”+
4 Bongo Yosua abengaki mibali 12 oyo aponaki na kati ya Bayisraele, mobali moko na libota moko, 5 mpe Yosua alobaki na bango boye: “Bóleka liboso ya Sanduku ya Yehova Nzambe na bino na katikati ya Yordani, mpe moto na moto asengeli komema libanga moko na lipeka na ye, na kolanda motángo ya mabota ya Bayisraele, 6 mpo yango ezala elembo na kati na bino. Soki bana na bino* batuni bino na mikolo ekoya ete: ‘Mpo na nini botyá mabanga oyo awa?’+ 7 Bokoyebisa bango boye: ‘Mpo mai ya Yordani ekatanaki liboso ya sanduku+ ya kondimana ya Yehova. Ntango sanduku yango ekatisaki Yordani, mai ya Yordani etikaki kotíyola. Mabanga oyo ekosalisa bana ya Yisraele bákanisaka likambo yango.’”*+
8 Na yango, Bayisraele basalaki kaka ndenge Yosua apesaki bango mitindo. Bazwaki mabanga 12 na katikati ya Yordani, kaka ndenge Yehova alobaki na Yosua, mpo ekokana na motángo ya mabota ya Bayisraele. Bamemaki yango mpe batyaki yango na esika oyo basengelaki kolala na butu.
9 Yosua mpe atɛlɛmisaki mabanga 12 na katikati ya Yordani na esika oyo makolo ya banganga-nzambe oyo bamemaki sanduku ya kondimana etɛlɛmaki,+ mpe mabanga yango ezali kuna tii na mokolo ya lelo.
10 Banganga-nzambe oyo bamemaki Sanduku batɛlɛmaki kaka na katikati ya Yordani tii ntango makambo nyonso oyo Yehova atindaki Yosua ayebisa bato ete básala esilaki, na boyokani na nyonso oyo Moize apesaki Yosua mitindo. Na ntango nyonso wana, bato bazalaki kokatisa nokinoki. 11 Ntango kaka bato nyonso basilisaki kokatisa, banganga-nzambe bakatisaki ná Sanduku ya Yehova na miso ya bato.+ 12 Mpe Barubene, Bagade, ná ndambo ya libota ya Manase bakatisaki ebale liboso ya Bayisraele mosusu na molɔngɔ lokola basoda,+ kaka ndenge Moize apesaki bango mitindo.+ 13 Basoda soki 40 000 oyo bazalaki na bibundeli mpo na etumba bakatisaki liboso ya Yehova mpe bakómaki na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko.
14 Na mokolo yango, Yehova apesaki Yosua lokumu mingi na miso ya Yisraele mobimba,+ mpe Bayisraele bakómaki kopesa ye limemya* bomoi na ye mobimba, kaka ndenge bazalaki kopesa Moize limemya.+
15 Na nsima, Yehova alobaki na Yosua boye: 16 “Pesá banganga-nzambe oyo bazali komema sanduku+ ya Litatoli mitindo ete bábima na Yordani.” 17 Bongo Yosua apesaki banganga-nzambe mitindo ete: “Bóbima na Yordani.” 18 Ntango banganga-nzambe oyo bamemaki sanduku+ ya kondimana ya Yehova balongwaki na katikati ya Yordani mpe batyaki makolo na bango na mokili, mai ya Yordani ezongaki na esika na yango mpe etondisaki bangámbo+ na yango ndenge ezalaki liboso.
19 Bato babimaki na Yordani na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso mpe batyaki kaa na Gilgale,+ na ndelo ya ɛsti ya Yeriko.
20 Bongo mabanga 12 oyo bazwaki na kati ya Yordani, Yosua atɛlɛmisaki yango na Gilgale.+ 21 Na nsima alobaki na Bayisraele boye: “Na mikolo ekoya, ntango bana na bino bakotuna bino ete: ‘Mabanga oyo elakisi nini?’+ 22 bosengeli koyebisa bana na bino ete: ‘Yisraele ekatisaki Yordani na mabele oyo ekauki,+ 23 ntango Yehova Nzambe na bino akaukisaki mai ya Yordani liboso na bango tii ntango basilisaki kokatisa, kaka ndenge Yehova Nzambe na bino asalaki na Mbu Motane, ntango akaukisaki yango liboso na biso tii tosilisaki kokatisa.+ 24 Asalaki bongo mpo bato ya bikólo nyonso ya mabele báyeba ete lobɔkɔ ya Yehova ezali+ mpenza na nguya, mpe mpo bóbanga Yehova Nzambe na bino ntango nyonso.’”