Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Nzambe akobimisa mopanga ya lisambisi (1-17)

      • Mokonzi ya Babilone akobundisa Yerusaleme (18-24)

      • Nkumu mabe ya Yisraele akolongolama (25-27)

        • “Longolá motole” (26)

        • “Tii ntango moto oyo azali na lotomo oyo euti na mibeko akoya” (27)

      • Mopanga ekobɛta Baamone (28-32)

Ezekiele 21:3

Mitindami

  • +Le 26:33

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, lok. 14

Ezekiele 21:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mosuni nyonso.”

Ezekiele 21:5

Mitindami

  • +Yir 23:20

Ezekiele 21:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kimelá.”

  • *

    Lil., “loketo na yo ezali.”

  • *

    To, “kimelá.”

Mitindami

  • +Yis 22:4; Yir 4:19; Ezk 9:8

Ezekiele 21:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kokimela.”

  • *

    Elingi koloba, masuba oyo ebimi mpo na kobanga.

Mitindami

  • +Ezk 7:15-17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, lok. 22

Ezekiele 21:9

Mitindami

  • +Yis 66:16; Yir 12:12; Am 9:4

Ezekiele 21:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “mopanga ya Yehova.”

Mitindami

  • +Eb 49:10; 2Sa 7:12, 14

Ezekiele 21:11

Mitindami

  • +Yir 25:9; 51:20

Ezekiele 21:12

Mitindami

  • +Ezk 9:8; Mik 1:8
  • +Ezk 19:1

Ezekiele 21:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lingenda ya bokonzi ekozala.”

Mitindami

  • +Yir 6:27
  • +2Ba 25:7; Ezk 19:14; 21:26

Ezekiele 21:14

Mitindami

  • +2Ba 25:1, 2

Ezekiele 21:15

Mitindami

  • +Ezk 21:7

Ezekiele 21:17

Mitindami

  • +Yis 1:24; Ezk 5:13; 16:42

Ezekiele 21:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ.”

Ezekiele 21:20

Mitindami

  • +Yir 49:2; Ezk 25:5; Am 1:14
  • +2Sa 5:9; 2Nt 26:9; 32:2, 5; 33:1, 14

Ezekiele 21:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “baterafime.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Lamuká!,

    7/2011, lok. 11

Ezekiele 21:22

Mitindami

  • +Yir 32:24; 52:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, lok. 14

Ezekiele 21:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “bafandi ya Yerusaleme.”

Mitindami

  • +2Nt 36:11, 13; Ezk 17:13
  • +2Ba 25:6, 7

Ezekiele 21:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na lobɔkɔ.”

Ezekiele 21:25

Mitindami

  • +2Nt 36:11, 13; Yir 24:8; 52:1, 2; Ezk 17:19

Ezekiele 21:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔti ya bokonzi.”

  • *

    To, “oyo ezali na nse.”

  • *

    To, “oyo ezali na likoló.”

Mitindami

  • +2Ba 25:5-7; Yir 52:8, 11; Ezk 12:12, 13
  • +Ezk 21:13
  • +Nz 75:7; Da 4:17
  • +Da 4:37; Lk 21:24

Ezekiele 21:27

Mitindami

  • +Eb 49:10; Nz 89:3, 4; 110:1; Yis 9:6; 11:10; Lk 1:32, 33; Em 5:5
  • +Nz 2:6, 8; Da 7:13, 14; Lk 22:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 11

    Emoniseli, nk. 59-60

Ezekiele 21:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na nkingo ya bato oyo babomami.”

Ezekiele 21:31

Mitindami

  • +Ezk 25:5

Ezekiele 21:32

Mitindami

  • +Yir 49:2, 3

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 21:3Le 26:33
Ezk. 21:5Yir 23:20
Ezk. 21:6Yis 22:4; Yir 4:19; Ezk 9:8
Ezk. 21:7Ezk 7:15-17
Ezk. 21:9Yis 66:16; Yir 12:12; Am 9:4
Ezk. 21:10Eb 49:10; 2Sa 7:12, 14
Ezk. 21:11Yir 25:9; 51:20
Ezk. 21:12Ezk 9:8; Mik 1:8
Ezk. 21:12Ezk 19:1
Ezk. 21:13Yir 6:27
Ezk. 21:132Ba 25:7; Ezk 19:14; 21:26
Ezk. 21:142Ba 25:1, 2
Ezk. 21:15Ezk 21:7
Ezk. 21:17Yis 1:24; Ezk 5:13; 16:42
Ezk. 21:20Yir 49:2; Ezk 25:5; Am 1:14
Ezk. 21:202Sa 5:9; 2Nt 26:9; 32:2, 5; 33:1, 14
Ezk. 21:22Yir 32:24; 52:4
Ezk. 21:232Nt 36:11, 13; Ezk 17:13
Ezk. 21:232Ba 25:6, 7
Ezk. 21:252Nt 36:11, 13; Yir 24:8; 52:1, 2; Ezk 17:19
Ezk. 21:262Ba 25:5-7; Yir 52:8, 11; Ezk 12:12, 13
Ezk. 21:26Ezk 21:13
Ezk. 21:26Nz 75:7; Da 4:17
Ezk. 21:26Da 4:37; Lk 21:24
Ezk. 21:27Eb 49:10; Nz 89:3, 4; 110:1; Yis 9:6; 11:10; Lk 1:32, 33; Em 5:5
Ezk. 21:27Nz 2:6, 8; Da 7:13, 14; Lk 22:29
Ezk. 21:31Ezk 25:5
Ezk. 21:32Yir 49:2, 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 21:1-32

Ezekiele

21 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo na ngámbo ya Yerusaleme, sakolá likebisi mpo na oyo ekokómela esika mosantu mpe mokili ya Yisraele. 3 Lobá na mokili ya Yisraele boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Nazali kobundisa yo, nakobimisa mopanga na ngai na libenga na yango+ mpe nakoboma moto ya sembo ná moto mabe epai na yo. 4 Lokola nakoboma moto ya sembo ná moto mabe epai na yo, mopanga na ngai ekobima na libenga na yango mpo na kobundisa moto nyonso,* banda na sudi tii na nɔrdi. 5 Bato nyonso bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova, nabimisi mopanga na ngai na libenga na yango. Ekozonga nsima lisusu te.”’+

6 “Mpe yo, mwana ya moto, lelá na motema* wana ozali* kolɛnga. Ɛɛ, lelá na mawa* na miso na bango.+ 7 Soki balobi na yo ete: ‘Mpo na nini ozali komilelalela?’* Okoloba boye: ‘Ezali mpo na nsango oyo ezali koya.’ Mpo ekoya mpenza, mpe motema ya bato nyonso ekonyangwa mpo na kobanga, mabɔkɔ nyonso ekolɛmba, moto nyonso akolɛmba nzoto mpe mabɔlɔngɔ nyonso ekotangisa mai.*+ ‘Talá! Ekoya mpenza, ekosalema,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

8 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 9 “Mwana ya moto, sakolá mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “‘Mopanga! Bapelisi mopanga+ mino mpe ekómi sɛlisɛli. 10 Epelisami mpo na koboma ebele ya bato; bakómisi yango sɛlisɛli mpo engɛnga lokola mokalikali.’”’”

“Tosengeli kosepela te?”

“‘Ekobwaka* nde lingenda ya bokonzi ya mwana na ngai moko,+ ndenge ezali kobwaka nzete nyonso?

11 “‘Bapesi yango mpo ekómisama sɛlisɛli mpe básimba yango na lobɔkɔ mpo na koboma. Mopanga yango epelisami mpe bakómisi yango sɛlisɛli, mpo epesama na lobɔkɔ ya mobomi.+

12 “‘Mwana ya moto, belelá mpe gangá na kolela,+ mpo mopanga eyeli bato na ngai; eyeli bankumu nyonso ya Yisraele.+ Bakobomama na mopanga elongo na bato na ngai. Na yango, omibɛta na ebɛlɔ na mawa. 13 Mpo bato na ngai batalelami malamumalamu,+ mpe nini ekosalema soki mopanga eboyi lingenda ya bokonzi? Ekozala* lisusu te,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

14 “Mpe yo, mwana ya moto, sakolá, bɛtá mabɔkɔ mpe lobá mbala misato ete: ‘Mopanga!’ Ezali mopanga ya bato oyo babomami, mopanga oyo ebomi bato ebele, mopanga oyo ezali kozinga bango.+ 15 Mitema na bango ekonyangwa mpo na kobanga+ mpe ebele bakokwea na baporte ya bingumba na bango. Nakoboma bato ebele na mopanga. Ɛɛ, ezali kongɛnga lokola mokalikali mpe bakómisi yango sɛlisɛli mpo na koboma! 16 Na mino nyonso, katá na lobɔkɔ ya mobali! Betá na lobɔkɔ ya mwasi! Kende epai nyonso oyo mbɛli na yo etali! 17 Nakobɛta mpe mabɔkɔ, mpe nakosilisa nkanda makasi na ngai.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.”

18 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 19 “Nde yo, mwana ya moto, salá nzela mibale mpo mopanga ya mokonzi ya Babilone eya. Yango mibale ekouta na mokili moko, elembo ya kolakisa nzela* ekotyama na nzela oyo ekei na bingumba mibale. 20 Osengeli kosala nzela mpo mopanga eya kobɛta Raba+ ya Baamone, mpe nzela mosusu mpo mopanga ebɛta Yerusaleme, engumba oyo ebatelami makasi+ na Yuda. 21 Mpo mokonzi ya Babilone atɛlɛmi esika banzela ekutani, esika nzela ekabwani na mibale, mpo na koluka koyeba makambo oyo ekoya. Aningisi makula. Atuni bikeko* na ye; atalitali libale. 22 Eloko oyo azali na yango na lobɔkɔ na ye ya mobali, mpo na kosakola makambo oyo ekoya elakisi na Yerusaleme, mpo na kotya bamasini ya kobukabuka, mpo na kopesa mitindo ya koboma, mpo na koyokisa lokito ya etumba, mpo na kotya bamasini ya kobukabuka baporte, mpo na kotɛlɛmisa ngomba ya mabele, mpo na kotonga efelo ya kozinga mboka.+ 23 Kasi na miso ya bato oyo* alapelaki bango ndai,+ koluka koyeba makambo oyo ekoya ekomonana lokola makambo ya lokuta, kasi akanisi lisusu libunga na bango mpe akokanga bango.+

24 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bosali ete bákanisa lisusu libunga na bino na ndenge bobimisi polele misala na bino ya kobuka mibeko, mpe bosali ete masumu na bino emonana na misala na bino nyonso, lokola bazali kokanisa bino lisusu, bokokangama na makasi.’*

25 “Kasi mokolo na yo eyei, Ee moto oyo ozoki mpota ya liwa, nkumu mabe ya Yisraele,+ ntango ya etumbu na yo ya libela ekoki. 26 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Longolá tirba mpe longolá motole.*+ Makambo ekobongwana.+ Tombolá moto oyo azali na nse,*+ mpe kitisá moto oyo azali na likoló.*+ 27 Nakokómisa yango libebi, libebi, libebi. Mpe ekozala ya moto moko te tii ntango moto oyo mibeko epesi ye lotomo akoya,+ mpe nakopesa ye yango.’+

28 “Mpe yo, mwana ya moto, sakolá mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi mpo na Baamone mpe mpo na kofinga na bango.’ Lobá boye: ‘Mopanga! Mopanga ebendami mpo na koboma, bakómisi yango sɛlisɛli mpo elya, mpe engɛnga lokola mokalikali. 29 Atako bimonaneli ya lokuta, mpe makambo ya lokuta oyo ekoya oyo bayebisi yo, baoyo bakokufa na kati na yo bakosangisama liboke elongo na bato oyo babomami,* bato mabe oyo mikolo na bango eyei, ntango ya etumbu na yo ya libela ekoki. 30 Zongisá yango na libenga na yango. Nakosambisa yo na esika ozalisamaki, na mokili epai outaki. 31 Nakopesa yo etumbu mpo nazali na nkanda. Nkanda na ngai ekozikisa yo lokola mɔtɔ, nakokaba yo na lobɔkɔ ya bato ya mobulu, bato oyo bayebi mpenza kobebisa.+ 32 Okokóma eloko ya kopelisa mɔtɔ.+ Makila na yo moko ekosopana na mokili. Mpe bakokanisa yo lisusu te, mpo ngai moko, Yehova, nde nalobi.’”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto