Yosua
20 Na nsima Yehova alobaki na Yosua ete: 2 “Yebisá Bayisraele boye: ‘Bópona bingumba ya ekimelo+ oyo nayebisaki bino na nzela ya Moize, 3 mpo moto oyo abomi moto* na nko te* to kozanga kokana akima kuna. Mpe bingumba yango ekozala esika na bino ya kokima mozongisi mabe mpo na makila.+ 4 Asengeli kokima na moko ya bingumba yango+ mpe kotɛlɛma na esika ya kokɔta na porte ya engumba+ mpe koyebisa likambo na ye na matoi ya bankulutu ya engumba. Na nsima bankulutu basengeli koyamba ye na kati ya engumba mpe kopesa ye esika, mpe akofanda elongo na bango. 5 Soki mozongisi mabe mpo na makila alandi ye kuna, bankulutu yango basengeli te kokaba moto oyo abomi moto yango na lobɔkɔ na ye, mpo abomaki moninga na ye kozanga kokana,* mpe azalaki koyina ye liboso te.+ 6 Asengeli kofanda na engumba wana tii ntango akotɛlɛma mpo na kosamba liboso ya liyangani,+ mpe akotikala kuna tii ntango nganga-nzambe monene+ oyo akozala na mikolo wana akokufa. Na ntango wana nde moto oyo abomaki moto yango akoki kozonga na engumba oyo autaki ntango akimaki, mpe akoki kokɔta na engumba na ye mpe na ndako na ye.’”+
7 Bongo basantisaki Kedeshe+ na Galile,* na etúká ya ngombangomba ya Nafatali, Shekeme+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime, mpe Kiriate-arba,+ elingi koloba Hebrone, na etúká ya ngombangomba ya Yuda. 8 Na etúká ya Yordani, na ɛsti ya Yeriko, baponaki bingumba oyo: Bezere+ oyo ezali na esobe, na likoló ya ngomba patatalu na teritware ya libota ya Rubene; Ramote+ na Gileade, na teritware ya libota ya Gade, mpe Golane+ na Bashane, na teritware ya libota ya Manase.+
9 Yango ekómaki bingumba oyo eponamaki mpo na Bayisraele nyonso mpe mpo na bato oyo bafandi bapaya kati na bango, mpo moto nyonso oyo abomi moto* na nko te akima kuna+ mpo mozongisi mabe mpo na makila aboma ye te liboso ete atɛlɛma liboso ya liyangani mpo na kosambisama.+