Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Libota ya Benyamina ekolimwa te (1-25)

Basambisi 21:1

Mitindami

  • +Bas 20:1
  • +Bas 21:18

Basambisi 21:2

Mitindami

  • +Bas 20:18, 26

Basambisi 21:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 3:1

Basambisi 21:7

Mitindami

  • +Le 5:4; 19:12; Mt 5:33
  • +Bas 21:1, 18

Basambisi 21:8

Mitindami

  • +Bas 20:1

Basambisi 21:10

Mitindami

  • +Bas 21:5

Basambisi 21:12

Mitindami

  • +Yos 18:1

Basambisi 21:13

Mitindami

  • +Bas 20:46, 47

Basambisi 21:14

Mitindami

  • +Bas 21:8, 12

Basambisi 21:15

Mitindami

  • +Bas 21:6

Basambisi 21:18

Mitindami

  • +Le 19:12; Bas 21:1

Basambisi 21:19

Mitindami

  • +Yos 18:1

Basambisi 21:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana basi.”

Basambisi 21:22

Mitindami

  • +Bas 21:12, 14
  • +Bas 21:1, 18

Basambisi 21:23

Mitindami

  • +Bas 20:48

Basambisi 21:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akanisi ete ezali malamu.”

Mitindami

  • +Bas 17:6; 1Sa 8:4, 5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2005, lok. 27

    15/6/1995, lok. 21

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 21:1Bas 20:1
Bas. 21:1Bas 21:18
Bas. 21:2Bas 20:18, 26
Bas. 21:4Le 3:1
Bas. 21:7Le 5:4; 19:12; Mt 5:33
Bas. 21:7Bas 21:1, 18
Bas. 21:8Bas 20:1
Bas. 21:10Bas 21:5
Bas. 21:12Yos 18:1
Bas. 21:13Bas 20:46, 47
Bas. 21:14Bas 21:8, 12
Bas. 21:15Bas 21:6
Bas. 21:18Le 19:12; Bas 21:1
Bas. 21:19Yos 18:1
Bas. 21:22Bas 21:12, 14
Bas. 21:22Bas 21:1, 18
Bas. 21:23Bas 20:48
Bas. 21:25Bas 17:6; 1Sa 8:4, 5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 21:1-25

Basambisi

21 Bongo mibali ya Yisraele balapaki ndai na Mizipa+ ete: “Moko te kati na biso akopesa mwana na ye ya mwasi epai ya mobali moko ya Benyamina mpo azala mwasi na ye.”+ 2 Na yango, bato bayaki na Betele,+ bafandaki wana liboso ya Nzambe ya solo tii na mpokwa, mpe bazalaki kolela mingi mpenza. 3 Mpe bazalaki koloba: “Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, mpo na nini likambo oyo esalami na Yisraele? Mpo na nini libota moko esengeli kozanga na Yisraele lelo oyo?” 4 Na mokolo oyo elandaki, bato balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe batongaki etumbelo moko kuna mpo na kopesa makabo ya kotumba mpe makabo ya kimya.*+

5 Bongo bato ya Yisraele balobaki: “Nani kati na mabota nyonso ya Yisraele amataki te mpo na koyangana liboso ya Yehova?” mpo balapaki ndai moko monene ete moto nyonso oyo amataki te epai ya Yehova na Mizipa akobomama mpenza. 6 Na yango bato ya Yisraele bayokaki mawa mpo na likambo oyo ekómelaki ndeko na bango Benyamina. Balobaki: “Lelo oyo, libota moko elongolami na Yisraele. 7 Tosengeli kosala nini mpo na kosalisa baoyo batikali bázwa basi, awa biso tolapi ndai na nkombo ya Yehova+ ete tokopesa bango bana na biso ya basi te mpo bázala basi na bango?”+

8 Batunaki boye: “Libota nini kati na mabota ya Yisraele emataki te epai ya Yehova na Mizipa?”+ Emonanaki ete ata moto moko te ya Yabeshe-gileade ayaki na kaa epai lisangá ezalaki. 9 Ntango batángaki bato, bamonaki ete ata mobali moko te oyo afandaka na Yabeshe-gileade azalaki wana. 10 Na yango liyangani etindaki mibali 12 000 kati na mibali oyo balekaki mpenza makasi. Bapesaki bango mitindo ete: “Bókende mpe bóbɛta mpenza bato oyo bafandi na Yabeshe-gileade na mopanga, ata mpe basi ná bana.+ 11 Talá oyo bokosala: Bosengeli koboma mobali nyonso mpe mwasi nyonso oyo asangisá nzoto na mobali.” 12 Kati na bato oyo bafandi na Yabeshe-gileade, bakutaki bana basi 400 oyo bazalaki bangɔndɔ mpe basangisá naino nzoto na mibali te. Bongo bamemaki bango na kaa, na Shilo,+ oyo ezali na mokili ya Kanana.

13 Na nsima, liyangani mobimba etindaki maloba epai ya Babenyamina oyo bazalaki na libanga ya Rimone+ mpo na koyebisa bango ete balingi kozongisa kimya. 14 Bongo na ntango wana, Babenyamina bazongaki na mokili na bango. Bayisraele bapesaki bango basi oyo batikaki na bomoi kati na basi ya Yabeshe-gileade,+ kasi basi yango bakokaki te mpo na bango nyonso. 15 Mpe bato bayokaki mawa mpo na likambo oyo ekómelaki Benyamina,+ mpo Yehova atyaki bokabwani kati na mabota ya Yisraele. 16 Bankulutu ya liyangani balobaki boye: “Tosengeli kosala nini mpo na kosalisa mibali oyo batikali bázwa basi, awa basi nyonso ya Benyamina basili?” 17 Bazongisaki: “Libula esengeli kozala mpo na Babenyamina oyo babikaki, mpo libota moko elongolama te na Yisraele. 18 Kasi biso, tokoki kopesa bana na biso ya basi epai na bango te, mpo bato ya Yisraele balapaki ndai ete: ‘Moto oyo akopesa moto ya Benyamina mwasi alakelama mabe.’”+

19 Na nsima, balobaki: “Talá! Fɛti ya Yehova ezalaka mbula na mbula na Shilo,+ oyo ezali na nɔrdi ya Betele mpe na ɛsti ya balabala monene oyo ematá banda na Betele tii na Shekeme mpe na sudi ya Lebona.” 20 Na yango, bapesaki mibali ya Benyamina mitindo ete: “Bókende kobombana na bilanga ya vinyo. 21 Mpe ntango bokomona bilenge basi* ya Shilo babimi mpo na kobina mabina ya kobaluka, mokomoko na bino asengeli kobima na bilanga ya vinyo mpe kokanga mwasi moko mpo na ye kati na bilenge basi ya Shilo, mpe bosengeli kozonga na mokili ya Benyamina. 22 Mpe soki batata na bango to bandeko na bango ya mibali bayei komilela mpo na biso, tokoyebisa bango: ‘Bómonisela biso boboto mpo na bango, mpo tokokaki te kozwela mokomoko na bango mwasi na nzela ya etumba,+ mpe bokokaki te kopesa bango basi kozanga ete bómema ngambo.’”+

23 Na yango mibali ya Benyamina basalaki kaka bongo; mokomoko akangaki mwasi moko mpo na ye kati na basi oyo bazalaki kobina. Nsima na yango, bazongaki na teritware ya libula na bango mpe batongaki lisusu bingumba na bango+ mpe bafandaki kuna.

24 Mpe na ntango yango, Bayisraele bapalanganaki, moto na moto azongaki na teritware ya etuluka na ye mpe ya libota na ye. Na yango balongwaki kuna, mpe moto na moto azongaki na teritware ya libula na ye.

25 Na mikolo yango, ezalaki na mokonzi te na Yisraele.+ Moto na moto azalaki kosala oyo ezali malamu na miso na ye moko.*

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto