Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 28
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela mokonzi ya Tire (1-10)

        • “Nazali nzambe” (2, 9)

      • Loyembo ya mawa mpo na mokonzi ya Tire (11-19)

        • “Ozalaki na Edene” (13)

        • “Keruba oyo atyami mafuta, oyo abatelaka” (14)

        • “Kozanga bosembo emonanaki epai na yo” (15)

      • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela Sidone (20-24)

      • Elaka ya kozongisama ya Yisraele (25, 26)

Ezekiele 28:2

Mitindami

  • +Ezk 28:5
  • +Ezk 27:4

Ezekiele 28:3

Mitindami

  • +Da 2:48

Ezekiele 28:4

Mitindami

  • +Zek 9:3

Ezekiele 28:5

Mitindami

  • +Yis 23:1, 3; Ezk 27:12

Ezekiele 28:7

Mitindami

  • +Ezk 30:10, 11
  • +Yis 23:9

Ezekiele 28:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nkunda.”

Mitindami

  • +Ezk 27:26

Ezekiele 28:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “loyembo ya kolela.”

  • *

    Lil., “Otyamaki ndakisa ya elembo.”

Mitindami

  • +Ezk 28:3
  • +Ezk 27:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2005, nk. 23-24

Ezekiele 28:13

Mitindami

  • +Ezk 27:16

Ezekiele 28:14

Mitindami

  • +Yis 14:13

Ezekiele 28:15

Mitindami

  • +Yoe 3:4; Am 1:9

Ezekiele 28:16

Mitindami

  • +1Ba 10:11; 2Nt 9:21; Ezk 27:12
  • +Yoe 3:6
  • +Yis 23:9; Yir 25:17, 22; 47:4; Yoe 3:8

Ezekiele 28:17

Mitindami

  • +Ezk 27:3
  • +Yis 14:14
  • +Yis 14:15

Ezekiele 28:18

Mitindami

  • +Am 1:9, 10

Ezekiele 28:19

Mitindami

  • +Ezk 27:35
  • +Ezk 27:36

Ezekiele 28:21

Mitindami

  • +Yis 23:4; Yir 25:17, 22; Ezk 32:30

Ezekiele 28:23

Mitindami

  • +Ezk 26:6

Ezekiele 28:24

Mitindami

  • +Mit 33:55; Yos 23:12, 13

Ezekiele 28:25

Mitindami

  • +Mib 30:3; Yis 11:12; Yir 30:18; Hos 1:11
  • +Yis 5:16
  • +Yir 23:8
  • +Eb 28:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 137

Ezekiele 28:26

Mitindami

  • +Yis 32:18; Yir 23:6; Hos 2:18
  • +Yis 65:21, 22; Yir 31:5; Am 9:14
  • +Yir 30:16

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 28:2Ezk 28:5
Ezk. 28:2Ezk 27:4
Ezk. 28:3Da 2:48
Ezk. 28:4Zek 9:3
Ezk. 28:5Yis 23:1, 3; Ezk 27:12
Ezk. 28:7Ezk 30:10, 11
Ezk. 28:7Yis 23:9
Ezk. 28:8Ezk 27:26
Ezk. 28:12Ezk 28:3
Ezk. 28:12Ezk 27:3
Ezk. 28:13Ezk 27:16
Ezk. 28:14Yis 14:13
Ezk. 28:15Yoe 3:4; Am 1:9
Ezk. 28:161Ba 10:11; 2Nt 9:21; Ezk 27:12
Ezk. 28:16Yoe 3:6
Ezk. 28:16Yis 23:9; Yir 25:17, 22; 47:4; Yoe 3:8
Ezk. 28:17Ezk 27:3
Ezk. 28:17Yis 14:14
Ezk. 28:17Yis 14:15
Ezk. 28:18Am 1:9, 10
Ezk. 28:19Ezk 27:35
Ezk. 28:19Ezk 27:36
Ezk. 28:21Yis 23:4; Yir 25:17, 22; Ezk 32:30
Ezk. 28:23Ezk 26:6
Ezk. 28:24Mit 33:55; Yos 23:12, 13
Ezk. 28:25Mib 30:3; Yis 11:12; Yir 30:18; Hos 1:11
Ezk. 28:25Yis 5:16
Ezk. 28:25Yir 23:8
Ezk. 28:25Eb 28:13
Ezk. 28:26Yis 32:18; Yir 23:6; Hos 2:18
Ezk. 28:26Yis 65:21, 22; Yir 31:5; Am 9:14
Ezk. 28:26Yir 30:16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 28:1-26

Ezekiele

28 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, lobá na mokambi ya Tire boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

“Lokola motema na yo ekómi na lolendo+ mpe ozali kaka koloba: ‘Nazali nzambe.

Nafandi na kiti ya bokonzi ya nzambe, na katikati mpenza ya mbu.’+

Kasi ozali kaka moto, nzambe te,

Atako na motema na yo ozali kokanisa ete ozali nzambe.

 3 Talá! Ozali moto ya bwanya koleka Danyele.+

Sekele moko te ebombani epai na yo.

 4 Okómi na bomɛngo mpo na bwanya mpe bososoli na yo,

Mpe ozali kokoba kobomba wolo ná palata na kati ya bandako na yo ya kobomba biloko.+

 5 Ozwi bomɛngo mingi mpo na mayele na yo ya mombongo,+

Mpe motema na yo ekómi na lolendo mingi mpo na bomɛngo na yo.”’

6 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

“Lokola na motema na yo ozali kokanisa ete ozali nzambe,

 7 Nakomemela yo bapaya mpo na kobundisa yo, banyokoli ya bikólo,+

Bakobenda mipanga na bango mpo na kobebisa biloko nyonso ya kitoko oyo ozwi na bwanya na yo

Mpe bakokómisa nkembo na yo mbindo.+

 8 Bakokitisa yo na libulu,*

Mpe okokufa liwa ya nsɔmɔ na katikati mpenza ya mbu.+

 9 Okokoba kaka koloba epai ya moto oyo azali koboma yo ete: ‘Nazali nzambe?’

Okozala kaka moto, kasi nzambe te, na mabɔkɔ ya baoyo bazali kokómisa yo mbindo.”’

10 ‘Na lobɔkɔ ya bapaya okokufa liwa ya bato oyo bakatami ngenga te,

Mpo ngai moko nde nalobi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

11 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 12 “Mwana ya moto, yembá loyembo ya mawa* mpo na mokonzi ya Tire, mpe lobá na ye boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

“Ozalaki ndakisa ya kokoka,*

Otondi na bwanya+ mpe na kitoko ya kokoka.+

13 Ozalaki na Edene, elanga ya Nzambe.

Olataki mabanga nyonso ya ntalo:

Rubi, topazi ná jasipe; krizolite, onikisi ná jade; safire, tirikwaze+ ná emerode;

Mpe mpɛtɛ na yango ná madusu na yango esalemaki na wolo.

Ebongisamaki na mokolo oyo ozalisamaki.

14 Natyaki yo lokola keruba oyo atyami mafuta, oyo abatelaka.

Ozalaki na ngomba mosantu ya Nzambe,+ ozalaki kotambola na katikati ya mabanga ya mɔtɔ.

15 Ozalaki na mbeba te na etamboli na yo banda mokolo oyo ozalisamaki

Tii kozanga bosembo emonanaki epai na yo.+

16 Mpo na ebele ya biloko na yo ya mombongo,+

Otondaki na mobulu, mpe obandaki kosala lisumu.+

Lokola okómi mbindo, nakobengana yo na ngomba ya Nzambe mpe nakoboma yo,+

Mosika na mabanga ya mɔtɔ, Ee keruba oyo abatelaka.

17 Motema na yo ekómaki na lolendo mpo na kitoko na yo.+

Obebisaki bwanya na yo mpo na nkembo na yo oyo ezali kongɛnga.+

Nakobwaka yo na mabele.+

Nakotya yo liboso ya bakonzi mpo bátala likambo oyo ekómeli yo.

18 Mpo na monene ya ngambo na yo mpe kozanga bosembo ya mombongo na yo, okómisi bisika mosantu na yo eloko mpamba.

Nakopelisa mɔtɔ na kati na yo mpe ekolya yo.+

Nakokómisa yo putulu ya mɔtɔ likoló ya mabele, liboso ya baoyo nyonso bazali kotala yo.

19 Baoyo nyonso bayebi yo na kati ya bato ya bikólo, bakotala yo na kokamwa.+

Nsuka na yo ekozala nsɔmɔ mpe na pwasa,

Mpe okozala lisusu te mpo na libela.”’”+

20 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 21 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya Sidone,+ mpe sakolá mpasi oyo ekokómela ye. 22 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

“Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Sidone, mpe nakokumisama na kati na yo;

Bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakopesa ye bitumbu mpe nakosantisama na kati na ye.

23 Nakotinda maladi mabe na kati na ye mpe makila ekosopana na babalabala na ye.

Bato bakobomama na kati na ye ntango mopanga ekobundisa ye bipai nyonso;

Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.+

24 “‘“Bongo bato ya Yisraele bakozingama lisusu te na nsende oyo ezokisaka to nzubɛ ya mpasi+ na baoyo bazali kotyola bango; mpe bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”’

25 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ntango nakoyanganisa bato ya Yisraele uta na bato ya bikólo epai bapalanganisamaki,+ nakosantisama na kati na bango na miso ya bikólo.+ Mpe bakofanda na mokili na bango+ oyo napesaki mosaleli na ngai, Yakobo.+ 26 Bakofanda wana na kimya,+ bakotonga bandako, bakolona bilanga ya vinyo,+ mpe bakofanda wana na kimya ntango nakopesa etumbu na baoyo nyonso bazali zingazinga na bango, baoyo bazali kotyola bango;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bango.”’”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto