Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 46
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yakobo ná bato ya ndako na ye bayei na Ezipito (1-7)

      • Bankombo ya bato oyo bayei na Ezipito (8-27)

      • Yozefe akutani na Yakobo na Goshene (28-34)

Ebandeli 46:1

Mitindami

  • +Eb 21:31
  • +Eb 31:42; Kob 3:6

Ebandeli 46:3

Mitindami

  • +Eb 28:13
  • +Eb 12:1, 2; Kob 1:7; Mib 26:5

Ebandeli 46:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, akokanga Yakobo miso ntango akokufa.

Mitindami

  • +Eb 15:16; 28:15; 47:29, 30; 50:13
  • +Eb 50:1

Ebandeli 46:8

Mitindami

  • +Kob 1:1-4
  • +Eb 35:23; 1Nt 5:1

Ebandeli 46:9

Mitindami

  • +Mit 26:5, 6

Ebandeli 46:10

Mitindami

  • +Eb 29:33
  • +Mit 26:12, 13; 1Nt 4:24

Ebandeli 46:11

Mitindami

  • +Eb 29:34
  • +1Nt 6:16

Ebandeli 46:12

Mitindami

  • +Eb 29:35; Em 5:5
  • +Eb 38:2-5
  • +Lk 3:23, 33
  • +Eb 38:30
  • +Eb 38:7, 9, 10
  • +Mit 26:21; 1Nt 2:5

Ebandeli 46:13

Mitindami

  • +Mit 26:23, 24; 1Nt 7:1

Ebandeli 46:14

Mitindami

  • +Eb 30:20
  • +Mit 26:26

Ebandeli 46:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Milimo nyonso ya bana na ye ya mibali mpe ya basi.”

Mitindami

  • +Eb 30:21

Ebandeli 46:16

Mitindami

  • +Eb 30:11
  • +Mit 26:15-17

Ebandeli 46:17

Mitindami

  • +Eb 30:13
  • +Mit 26:44, 45

Ebandeli 46:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Milimo.”

Mitindami

  • +Eb 29:24

Ebandeli 46:19

Mitindami

  • +Eb 30:24
  • +Eb 35:18

Ebandeli 46:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Engumba moko na Ezipito. Ebengamaka mpe Héliopolis.

Mitindami

  • +Eb 41:50
  • +Eb 41:51
  • +Eb 41:52

Ebandeli 46:21

Mitindami

  • +1Nt 7:6
  • +1Nt 8:1, 3
  • +1Nt 7:12
  • +Mit 26:38-40

Ebandeli 46:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Milimo.”

Ebandeli 46:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Bana mibali.”

Mitindami

  • +Eb 30:6
  • +Mit 26:42

Ebandeli 46:24

Mitindami

  • +Eb 30:8
  • +Mit 26:48, 49

Ebandeli 46:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Milimo.”

Ebandeli 46:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Milimo.”

Mitindami

  • +Eb 35:10, 11

Ebandeli 46:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo mibale.”

  • *

    To, “Milimo.”

Mitindami

  • +Kob 1:5; Mib 10:22; Mis 7:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2002, lok. 27

Ebandeli 46:28

Mitindami

  • +Eb 43:8; 44:18
  • +Eb 45:10; 47:1

Ebandeli 46:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “akweaki na nkingo na ye.”

  • *

    Lil., “akweaki na nkingo na ye mbala na mbala.”

Ebandeli 46:31

Mitindami

  • +Eb 41:39, 40
  • +Eb 45:19; Mis 7:13

Ebandeli 46:32

Mitindami

  • +Eb 31:17, 18; 47:3
  • +Eb 31:38
  • +Eb 46:6

Ebandeli 46:34

Mitindami

  • +Eb 30:35, 36
  • +Eb 45:17, 18; 47:27
  • +Eb 43:32

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 46:1Eb 21:31
Eba. 46:1Eb 31:42; Kob 3:6
Eba. 46:3Eb 28:13
Eba. 46:3Eb 12:1, 2; Kob 1:7; Mib 26:5
Eba. 46:4Eb 15:16; 28:15; 47:29, 30; 50:13
Eba. 46:4Eb 50:1
Eba. 46:8Kob 1:1-4
Eba. 46:8Eb 35:23; 1Nt 5:1
Eba. 46:9Mit 26:5, 6
Eba. 46:10Eb 29:33
Eba. 46:10Mit 26:12, 13; 1Nt 4:24
Eba. 46:11Eb 29:34
Eba. 46:111Nt 6:16
Eba. 46:12Eb 29:35; Em 5:5
Eba. 46:12Eb 38:2-5
Eba. 46:12Lk 3:23, 33
Eba. 46:12Eb 38:30
Eba. 46:12Eb 38:7, 9, 10
Eba. 46:12Mit 26:21; 1Nt 2:5
Eba. 46:13Mit 26:23, 24; 1Nt 7:1
Eba. 46:14Eb 30:20
Eba. 46:14Mit 26:26
Eba. 46:15Eb 30:21
Eba. 46:16Eb 30:11
Eba. 46:16Mit 26:15-17
Eba. 46:17Eb 30:13
Eba. 46:17Mit 26:44, 45
Eba. 46:18Eb 29:24
Eba. 46:19Eb 30:24
Eba. 46:19Eb 35:18
Eba. 46:20Eb 41:50
Eba. 46:20Eb 41:51
Eba. 46:20Eb 41:52
Eba. 46:211Nt 7:6
Eba. 46:211Nt 8:1, 3
Eba. 46:211Nt 7:12
Eba. 46:21Mit 26:38-40
Eba. 46:23Eb 30:6
Eba. 46:23Mit 26:42
Eba. 46:24Eb 30:8
Eba. 46:24Mit 26:48, 49
Eba. 46:26Eb 35:10, 11
Eba. 46:27Kob 1:5; Mib 10:22; Mis 7:14
Eba. 46:28Eb 43:8; 44:18
Eba. 46:28Eb 45:10; 47:1
Eba. 46:31Eb 41:39, 40
Eba. 46:31Eb 45:19; Mis 7:13
Eba. 46:32Eb 31:17, 18; 47:3
Eba. 46:32Eb 31:38
Eba. 46:32Eb 46:6
Eba. 46:34Eb 30:35, 36
Eba. 46:34Eb 45:17, 18; 47:27
Eba. 46:34Eb 43:32
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 46:1-34

Ebandeli

46 Na yango, Yisraele azwaki nyonso oyo azalaki na yango mpe akendaki. Ntango akómaki na Beere-sheba,+ apesaki Nzambe ya tata na ye Yisaka bambeka.+ 2 Bongo Nzambe asololaki na Yisraele na emonaneli na butu mpe alobaki ete: “Yakobo, Yakobo!” ye ayanolaki ete: “Ngai oyo!” 3 Alobaki ete: “Nazali Nzambe ya solo, Nzambe ya tata na yo.+ Kobanga te kokita na Ezipito, mpo kuna nakokómisa yo ekólo moko monene.+ 4 Ngai moko nakokita elongo na yo na Ezipito, mpe ngai moko nakolongola yo lisusu kuna,+ mpe Yozefe akotya lobɔkɔ na ye na miso na yo.”*+

5 Nsima na yango, Yakobo alongwaki na Beere-sheba, mpe bana ya Yisraele bazalaki komema Yakobo tata na bango mpe bana na bango mpe basi na bango na bashario oyo Farao atindaki mpo na komema ye. 6 Bamemaki bitonga na bango mpe ebele ya biloko na bango, oyo bazwaki na mokili ya Kanana. Mpe bakɔtaki na Ezipito, Yakobo ná libota na ye nyonso elongo na ye. 7 Amemaki elongo na ye na Ezipito bana na ye ya mibali ná bana mibali ya bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi mpe bana basi ya bana na ye ya mibali, libota na ye nyonso.

8 Oyo ezali bankombo ya bana mibali ya Yisraele oyo bakɔtaki na Ezipito:+ Yakobo ná bana na ye ya mibali: Mwana ya liboso ya Yakobo ezalaki Rubene.+

9 Bana mibali ya Rubene bango oyo: Hanoke, Palu, Hezerone mpe Karami.+

10 Bana mibali ya Simeone+ bango oyo: Yemuele, Yamine, Ohade, Yakine, Zohare, mpe Shaule+ mwana mobali ya mwasi Mokanana.

11 Bana mibali ya Levi+ bango oyo: Gereshone, Kohate, mpe Merari.+

12 Bana mibali ya Yuda+ bango oyo: Ere, Onane, Shela,+ Pereze,+ mpe Zera.+ Kasi, Ere ná Onane bakufaki na mokili ya Kanana.+

Bana mibali ya Pereze bango oyo: Hezerone mpe Hamule.+

13 Bana mibali ya Isakare bango oyo: Tola, Puva, Yobe, mpe Shimirone.+

14 Bana mibali ya Zebulone+ bango oyo: Serede, Elone, mpe Yahaleele.+

15 Bango nde bazali bana mibali ya Lea, oyo abotelaki Yakobo na Padane-arame, mpe mwana na ye ya mwasi Dina.+ Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi* bazalaki 33.

16 Bana mibali ya Gade+ bango oyo: Zifione, Hagi, Shuni, Ezebone, Eri, Arodi, mpe Areli.+

17 Bana mibali ya Ashere+ bango oyo: Yimena, Yishiva, Yishivi ná Beria, mpe ndeko na bango ya mwasi ezalaki Sera.

Bana mibali ya Beria ezalaki Hebere mpe Malikiele.+

18 Bango nde bazali bana mibali ya Zilipa,+ oyo Labana apesaki mwana na ye ya mwasi Lea. Bana* nyonso oyo abotelaki Yakobo bazalaki 16.

19 Bana mibali ya Rashele, mwasi ya Yakobo, bango oyo: Yozefe+ ná Benyamina.+

20 Na mokili ya Ezipito, Asenate,+ mwana mwasi ya Potifera, nganga-nzambe ya One,* abotelaki Yozefe Manase+ ná Efraime.+

21 Bana mibali ya Benyamina+ bango oyo: Bela, Bekere, Ashebele, Gera,+ Naamane, Ehi, Roshe, Mupime, Hupime+ mpe Arde.+

22 Bango nde bazali bana mibali ya Rashele oyo Yakobo abotaki. Bana* nyonso bazalaki 14.

23 Mwana mobali* ya Dani+ ezalaki Hushime.+

24 Bana mibali ya Nafatali+ ezalaki: Yahazeele, Guni, Yezere mpe Shileme.+

25 Bango nde bazali bana mibali ya Bila, oyo Labana apesaki mwana na ye ya mwasi Rashele. Bana* nyonso oyo abotelaki Yakobo bazalaki nsambo.

26 Bana* nyonso ya Yakobo oyo bakendaki na Ezipito elongo na ye, longola basi ya bana ya Yakobo, bango nyonso bazalaki 66.+ 27 Bana mibali ya Yozefe oyo abotaki na Ezipito bazalaki mibale.* Bana* nyonso ya ndako ya Yakobo oyo bakɔtaki na Ezipito bazalaki 70.+

28 Yakobo atindaki Yuda+ liboso na ye epai ya Yozefe mpo ayebisa ye ete akómi pene na Goshene. Ntango bakɔtaki na mokili ya Goshene,+ 29 Yozefe abongisaki likalo na ye mpe akendaki na Goshene kokutana na Yisraele tata na ye. Ntango ayebisaki tata na ye ete azali Yozefe, na mbala moko ayambaki ye* mpe alelaki ntango molai.* 30 Na nsima, Yisraele alobaki na Yozefe ete: “Sikoyo nakoki kokufa, lokola namoni elongi na yo mpe nayebi ete ozali naino na bomoi.”

31 Bongo Yozefe alobaki na bandeko na ye mpe na bato ya ndako ya tata na ye ete: “Tiká namata napesa nsango epai ya Farao+ mpe nayebisa ye ete: ‘Bandeko na ngai mpe bato ya ndako ya tata na ngai oyo bazalaki na mokili ya Kanana, bayei awa epai na ngai.+ 32 Bato yango bazali babateli ya mpate,+ babɔkɔlaka bibwɛlɛ,+ mpe bayei na bitonga na bango ya bampate mpe bitonga na bango ya bangɔmbɛ mpe nyonso oyo bazali na yango.’+ 33 Ntango Farao akobenga bino mpe akotuna bino: ‘Mosala nini bosalaka?’ 34 bóloba ete: ‘Basaleli na yo bazali babɔkɔli ya bibwɛlɛ banda bomwana tii sikoyo, biso ná bankɔkɔ na biso,’+ mpo bófanda na mokili ya Goshene,+ mpamba te bato ya Ezipito bayinaka babateli ya mpate.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto